We Believe JesusFé, Esperança e Nova Vida

Mosakoli 5

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi · limburguês

← Mosakoli 4 Mosakoli Mosakoli 6 →

1Kowelela te kofungola monoko na yo,

2Ndenge ndoto eyaka soki moto azali na misala mingi,

3Soki olapi ndayi liboso ya Nzambe,

4Eleki malamu ete olapa na yo kutu ndayi te na esika ya kolapa ndayi mpe ozanga kokokisa yango.

5Kotika te ete monoko na yo ememisa yo masumu, mpe kokende koloba te liboso ya basali ya Nzambe : « Ndayi na ngai ezalaki libunga. » Mpo na nini Nzambe atomboka mpo na maloba na yo mpe abebisa misala ya maboko na yo ?

6Ndoto ebele mpe maloba ebele ezali kaka pamba ; yango wana tosa nde Nzambe.

7Soki omoni ete bazali konyokola mobola kati na mokili, bongo boyengebene mpe bosembo etiolami, kokamwa likambo yango te ; pamba te mokambi moko azali na se ya mokambi mosusu ; mpe na likolo na bango mibale, ezali na bakonzi mosusu oyo baleki na bokonzi.

8Biloko oyo mabele ebotaka ezali mpo na bolamu ya bato nyonso ; ezala mokonzi, abikaka mpe na mbuma ya bilanga.

9Moto oyo alingaka mbongo atondaka yango te, mpe moto oyo alingaka bomengo, bozwi na ye etondisaka ye te. Wana mpe ezali kaka pamba.

10Ndenge bozwi ya moto ekomaka ebele,

11Pongi ya mosali ezalaka ya kimia,

12Namoni mabe moko na se ya moyi,

13likambo moko ya mabe ya mbalakata

14Ndenge abotamaki bolumbu

15Oyo mpe ezali lisusu pasi oyo epesaka mawa :

16Alekisi mikolo nyonso ya bomoi na ye kati na molili,

17Mpo na yango, tala likambo

18Kutu, epai na moto nyonso oyo Nzambe apesi bomengo mpe biloko ebele, bongo apesi ye lisusu makoki ya kosalela yango, ya kozwa libula na ye mpe ya kosepela na mbuma ya mosala na ye, wana ezali penza likabo ya Nzambe !

19Nzokande, wana Nzambe akotondisa motema na ye na esengo, moto yango akosala keba te na motango ya mikolo ya bomoi na ye.

← Mosakoli 4 Mosakoli Mosakoli 6 →