We Believe JesusFé, Esperança e Nova Vida

Mosakoli 6

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi · limburguês

← Mosakoli 5 Mosakoli Mosakoli 7 →

1Namoni mabe mosusu na se ya moyi, mpe ezali kilo makasi mpo na bato :

2ezali na bato oyo bazwi kowuta na Nzambe bozwi, biloko ebele mpe lokumu mpo ete bazanga eloko moko te oyo mitema na bango ekoki kozala na yango posa ; kasi Ye moko Nzambe apimeli bango makoki ya kosepela na yango, pamba te moto mosusu nde azali kosepela na yango. Wana mpe ezali pamba, mpe ezali mabe oyo epesaka penza mawa.

3Soki moto aboti bana nkama moko mpe azwi ngolu ya kowumela mibu ebele na bomoi ; bongo, atako awumeli mibu ebele na bomoi, asepeli te na bozwi na ye mpe azangi ata kunda, nalobi solo ete mwana oyo abotami ya kokufa azali malamu koleka ye ;

4pamba te, mwana oyo abotami ya kokufa, abotami pamba, azongi kati na molili, mpe bakokanisa ye lisusu te ;

5atako amoni moyi te to atikali koyeba ata eloko moko te, azali na kimia koleka mozwi.

6Ata awumeli na bomoi mibu nkoto moko mbala mibale, akotikala komona esengo te. Boni, bato nyonso bakendaka kaka esika moko te ?

7Pasi nyonso oyo moto amonaka

8Moto ya bwanya aleki moto oyo azangi mayele na nini ?

9Biloko oyo moto azali komona na miso

10Ekelamu nyonso oyo ezali

11Soki maloba eleki mingi,

12Pamba te, nani ayebi likambo oyo ezali malamu mpo na bomoi ya moto, na mikolo na ye nyonso ya bomoi ya pamba oyo azali kolekisa lokola elili ? Nani akoki koyebisa ye makambo oyo ekoya sima na ye, na se ya moyi ?

← Mosakoli 5 Mosakoli Mosakoli 7 →