1Natalaki lisusu mpe namonaki minyoko nyonso oyo ezali na se ya moyi :
2Yango wana, namonaki ete bato oyo basila kokufa kala
3Mpe moto oyo atikala nanu kozala te
4Namoni ete pasi nyonso oyo bato bamonaka na mosala mpe lokumu oyo bazwaka na misala na bango, ewutaka kaka na bilulela ya moto liboso ya moninga na ye. Wana mpe ezali pamba, ezali lokola moto azali kolanda mopepe.
5Moto oyo azangi mayele akangaka maboko na ye
6Loboko moko oyo etondi na kimia ezali malamu
7Namonaki lisusu likambo mosusu ya pamba na se ya moyi :
8Ezalaki na moto moko oyo azalaki kaka ye moko,
9Bato mibale bazali malamu koleka moto moko,
10Soki moko akweyi, moninga na ye akoki kosunga ye ;
11Mpe lisusu, soki bato mibale balali esika moko,
12Soki moto azali ye moko, monguna akoki kolonga ye ;
13Elenge mobola ya mayele azali malamu koleka mokonzi ya mobange oyo azangi mayele mpe ayokaka toli te ;
14ezala soki elenge mobali yango abotama mobola kati na mokili na ye to awuti kobima na boloko mpo na kokoma mokonzi.
15Namonaki bato nyonso ya bomoi, oyo bazali kotambola na se ya moyi kolanda elenge mobali lokola mokitani ya mokonzi.
16Ata soki bato oyo bazalaki kosepela na ye bazalaki ebele koleka, kasi bato oyo bakoya sima bakoki koboya ye. Yango mpe ezali pamba, ezali lokola moto azali kolanda mopepe.
17Batela makolo na yo tango ozali kokende na Ndako ya Nzambe ; eleki malamu kokende kuna mpo na koyoka, kasi mpo na kobonza mbeka ya bazoba te, pamba te bayebaka te ete basalaka mabe.