We Believe JesusFé, Esperança e Nova Vida

Malako 4

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi · limburguês

← Malako 3 Malako Malako 5 →

1Yesu abandaki lisusu koteya pembeni ya ebale. Bato ebele basanganaki pembeni na Ye. Boye, amataki mpe avandaki kati na bwato, mpe bato nyonso batelemaki na mokili, pembeni ya ebale.

2Azalaki koteya bango makambo ebele na masese. Na mateya na Ye, azalaki koloba :

3« Boyoka ! Moloni moko abimaki mpo na kolona.

4Wana azalaki kobwaka nkona na ye, ndambo ekweyaki pembeni ya nzela ; bandeke eyaki mpe eliaki yango.

5Ndambo mosusu ekweyaki na esika etonda na mabanga, esika oyo mabele ezalaki mingi te ; ebimisaki mito noki mpo ete mabele yango ezalaki na bozindo te.

6Kasi tango moyi ebimaki, mito yango ezikaki mpo ete ezalaki na misisa te.

7Ndambo mosusu ekweyaki kati na banzube ; banzube ekolaki mpe efinaki-finaki yango. Boye, ebotaki bambuma te.

8Ndambo mosusu ekweyaki na mabele ya malamu ; ebimisaki mito, ekolaki mpe ebotaki bambuma : nkona moko ebotaki bambuma tuku misato ; mosusu, bambuma tuku motoba ; mpe mosusu, bambuma nkama moko. »

9Yesu azalaki lisusu koloba : « Tika ete moto oyo azali na matoyi mpo na koyoka ayoka ! »

10Tango atikalaki Ye moko, bantoma zomi na mibale elongo na bato oyo bazingelaki Ye batunaki Ye na tina na masese.

11Yesu alobaki na bango :

12mpo ete :

13Bongo Yesu alobaki na bango :

14Moloni alonaka Liloba.

15Bato mosusu bazali pembeni ya nzela epai wapi Liloba elonami. Tango kaka bayoki Liloba, Satana ayei mpe alongoli Liloba oyo elonami kati na mitema na bango.

16Bamosusu bazali lokola nkona oyo ekweyi na mabele etonda na mabanga : bayoki na bango Liloba mpe bayambi yango mbala moko na esengo ;

17kasi lokola bazali na misisa te kati na bango, bakowumela na Liloba yango kaka mpo na tango moke. Soki kaka, likolo ya Liloba, pasi to minyoko eyei, basundoli mbala moko kondima na bango.

18Bamosusu bazali lokola nkona oyo ekweyi kati na banzube : bayoki na bango Liloba ;

19kasi mitungisi ya bomoi, lokoso ya bomengo mpe baposa ya makambo ya mokili efini-fini Liloba kati na bango, boye ekotikala kobota bambuma te kati na bango.

20Bamosusu bazali lokola nkona oyo ekweyi na mabele ya malamu : bayoki malamu Liloba, bandimi yango mpe baboti bambuma ; moko aboti bambuma tuku misato ; mosusu, bambuma tuku motoba ; mpe mosusu lisusu, bambuma nkama moko.

21Yesu alobaki na bango lisusu :

22Pamba te eloko moko te ebombama ekozanga komonisama, mpe eloko moko te ya sekele ekozanga kobima na pole.

23Tika ete moto azali na matoyi mpo na koyoka ayoka !

24Alobaki lisusu :

25pamba te na moto oyo azali na eloko, bakopesa ye lisusu ; kasi na moto oyo azangi, bakobotola ye ata oyo azali na yango.

26Yesu alobaki lisusu :

27butu mpe moyi, alala to alamuka, nkona ebimisaka moto, ekolaka yango moko mpe ayebaka te ndenge nini yango ezali kokola ;

28pamba te yango moko mabele nde ebimisaka mbuma : liboso, moto ya nzete ; sima, matiti ; mpe na suka, bambuma ya ble etondaka na nzete.

29Bongo soki bambuma ekomeli, azwaka mbala moko mbeli oyo bakataka na yango matiti ya ble, pamba te eleko ya kobuka bambuma ekoki.

30Yesu alobaki lisusu :

31Bokonzi ya Likolo ekokani na nkona ya mutarde : tango balonaka yango, ezalaka nkona oyo eleki moke kati na bankona nyonso ya mokili.

32Kasi sima na kolona yango, ekokola mpe ekomaka molayi koleka ndunda nyonso ya elanga, ebimisaka bitape minene oyo esalaka ete bandeke ya likolo etonga zala na se ya pio na yango.

33Yesu azalaki kosalela masese ya ndenge na ndenge mpo na koteya bango Liloba na Nzambe, kolanda bososoli na bango ;

34azangaki te kosalela masese mpo na koloba na bango. Kasi soki atikali Ye moko elongo na bayekoli na Ye, azalaki kolimbola makambo nyonso.

35Kaka na mokolo yango wana, wana pokwa ekomaki, Yesu alobaki na bayekoli na Ye :

36Batikaki bato, bamemaki Ye na bwato mpe bakatisaki na ngambo mosusu. Babwato mosusu mpe ezalaki elongo na bango.

37Mopepe moko ya makasi ekomaki kopepa, mbonge ekomaki kobeta na bwato, mpe bwato ekomaki kotonda na mayi.

38Yesu azalaki na sima, alalaki pongi mpe atiaki moto na likolo ya kuse.

39Yesu alamukaki, agangelaki mopepe, mpe apesaki mitindo na ebale :

40Bongo alobaki na bayekoli na Ye :

41Somo monene ekotaki kati na bango mpe bakomaki kolobana bango na bango : « Moto oyo azali penza nani mpo ete mopepe mpe ebale etosa ye ? »

← Malako 3 Malako Malako 5 →