We Believe JesusFé, Esperança e Nova Vida

Malako 3

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi · limburguês

← Malako 2 Malako Malako 4 →

1Yesu akotaki lisusu na ndako ya mayangani epai wapi ezalaki na moto moko akufa loboko.

2Boye bato bazalaki kotala soki Yesu akobikisa ye na mokolo ya Saba mpo na kofunda Ye.

3Bongo Yesu alobaki na moto oyo akufa loboko :

4Atunaki bango :

5Yesu atalaki bango na mawa mpe ayokaki pasi mingi na motema mpo ete mitema na bango ezalaki makasi lokola libanga. Yesu alobaki na moto yango :

6Mbala moko, Bafarizeo babimaki mpe bakendeki koyokana na bato ya lisanga ya Erode mpo na koluka nzela ya kobomisa Yesu.

7Tango Yesu alongwaki kuna, akendeki na ebale elongo na bayekoli na Ye, mpe bato ebele penza balandaki Ye wuta na Galile, na Yuda,

8na Yelusalemi, na Idume mpe na ngambo ya Yordani. Boye tango bato oyo bazalaki na bamboka ya zingazinga ya Tiri mpe ya Sidoni bayokaki sango ya makambo nyonso oyo Yesu azalaki kosala, bango mpe bayaki ebele penza epai na Ye.

9Boye Yesu atindaki bayekoli ete babongisela Ye bwato moko mpo ete bato bafinafina Ye te.

10Lokola azalaki kobikisa bato ebele, bato oyo bazalaki na pasi bakomaki kowelela koya epai na Ye mpo na koluka kosimba Ye.

11Tango bato oyo bazalaki na milimo mabe bazalaki komona Ye, bazalaki kogumbama liboso na Ye mpe koganga :

12Kasi Yesu azalaki kopamela milimo yango ete emeka te koloba na tina na Ye.

13Yesu amataki likolo ya ngomba, abengaki bato oyo azalaki na bosenga na bango, mpe bakendeki epai na Ye.

14Kati na bango, aponaki bato zomi na mibale oyo akomaki kobenga « bantoma, » mpo ete bazala elongo na Ye mpe mpo ete bakende koteya Sango Malamu ;

15mpe apesaki bango bokonzi ya kobengana milimo mabe.

16Tala bakombo ya bato zomi na mibale oyo aponaki :

17Jake, mwana mobali ya Zebede, mpe Yoane, ndeko na ye, ba-oyo Yesu apesaki kombo « Boanerijesi » oyo elingi koloba : bana ya kake ;

18Andre,

19mpe Yuda Isikarioti oyo atekaki Yesu.

20Tango Yesu akotaki na ndako, bato ebele bayaki lisusu kosangana wana, mpe esalaki ete Ye elongo na bayekoli na Ye bazangaki ata tango mpo na kolia.

21Tango bandeko ya libota na Ye bayokaki bongo, bayaki mpo na kozwa Ye na makasi, pamba te bazalaki koloba :

22Balakisi ya Mobeko oyo bawutaki na Yelusalemi balobaki :

23Yesu abengaki bango mpe alobaki na bango na masese :

24Soki bokonzi moko ekabwani, bokonzi yango ekowumela te.

25Soki libota moko ekabwani, libota yango ekowumela te ;

26mpe soki Satana amibundisi mpe akabwani na ye moko, akowumela te, mpe suka na ye emonani.

27Pamba te moto moko te akoki kokota na ndako ya elombe mpo na kobotola biloko na ye soki liboso akangi ye te na basinga. Ezali kaka soki asali bongo nde akoki kobotola biloko na ye ya ndako.

28Nazali koloba na bino penza ya solo : masumu mpe maloba nyonso ya mabe oyo bato bakoki kofinga na yango Nzambe ekolimbisama ;

29kasi moto nyonso oyo akofinga Molimo Mosantu akolimbisama te, akomema mokumba ya lisumu yango mpo na libela.

30Yesu alobaki bongo, mpo ete bazalaki koloba : « Azali na molimo mabe ! »

31Mama mpe bandeko mibali ya Yesu bayaki, batelemaki libanda mpe batindaki moto kobenga Yesu.

32Bato ebele penza bavandaki pembeni na Ye. Mpe bayaki koloba na Ye :

33— Nani mama na Ngai ? Banani bandeko na Ngai ?

34Atalaki bato oyo bavandaki pembeni na Ye mpe alobaki :

35Moto nyonso oyo asalaka mokano ya Nzambe, ye nde azali ndeko na Ngai ya mobali, ndeko na Ngai ya mwasi mpe mama na Ngai.

← Malako 2 Malako Malako 4 →