1Miso na ngai emonaki makambo oyo nyonso,
2Nayebi makambo nyonso oyo bino boyebi,
3Kasi nalingi nde koloba na Nkolo-Na-Nguya-Nyonso
4Pamba te bino, bozali kobongisa lokuta,
5Soki bovandaki ata kimia,
6Yoka sik’oyo maloba na ngai,
7Boni, bozali kokotela Nzambe na nzela ya lokuta
8Bolingi kolakisa ete bozali na ngambo na Ye ?
9Bokosepela soki aluki koyeba makanisi ya mitema na bino ?
10Akopamela bino solo soki amoni ete, na se ya mitema na bino,
11Boni, bokozala ata na somo ya lokumu na Ye te ?
12Pamba te maloba na bino ekokani na putulu,
13Botika makelele mpe botika ngai naloba !
14Mpo na nini nandima kokufa
15Ata soki abomi ngai, nakozala kaka na elikya na Ye,
16Yango kutu nde ekozala lobiko na ngai,
17Boyoka maloba na ngai malamu ;
18Sik’oyo, namibongisi mpo na kobundela likambo na ngai,
19Nani akoki kofunda ngai ?
20Oh Nzambe, pesa ngai kaka biloko mibale,
21longola loboko na Yo likolo na ngai,
22Bongo benga ngai, mpe nakoyanola ;
23Mabe mpe masumu boni nasali liboso na Yo ?
24Mpo na nini obombi elongi na Yo
25Olingi kaka kotungisa lokasa
26Pamba te okomaka makambo mabe na tina na ngai
27Okangi makolo na ngai na minyololo ya bibende,
28Moto apola penza boye lokola eloko ya kopola,