1Yobo azongisaki :
2« Solo, bozali penza bato ;
3Kasi atako bongo, ngai mpe nazali mayele lokola bino,
4Nakomi eloko ya kotiola na miso ya baninga na ngai,
5Bato ya esengo basekaka bato oyo bazali na pasi,
6Bandako ya bato ya mobulu ezalaka na kimia,
7Kasi tuna nyama ya zamba, ekoteya yo ;
8loba na mabele, ekoteya yo ;
9Kati na yango, ekelamu nini
10Bomoi ya bikelamu nyonso mpe pema ya bato nyonso
11Boni, litoyi emekaka maloba te
12Bwanya ezalaka kati na bampaka te ?
13Bwanya mpe makasi ezali epai ya Nzambe,
14Bakokoka te kotonga lisusu oyo Ye asili kobebisa,
15Soki akangi mayi, bokawuki ekotaka ;
16Makasi mpe elonga ezali ya Ye ;
17Amemaka bapesi toli na bowumbu
18afungolaka minyololo ya bakonzi
19amemaka Banganga-Nzambe na bowumbu
20akangaka minoko ya bato oyo balobaka malamu,
21asopelaka bakonzi soni,
22abimisaka na pwasa, makambo ya sekele,
23atombolaka bikolo mpe abebisaka yango,
24alongolaka makanisi ya bakonzi ya bikolo
25mpo ete batepatepa kati na molili,