We Believe JesusFé, Esperança e Nova Vida

Ester 7

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi · limburguês

← Ester 6 Ester Ester 8 →

1Mokonzi mpe Amani bakendeki mpe bakomaki na feti oyo Ester, mwasi ya mokonzi, abongisaki.

2Mpe wana bazalaki komela vino na mokolo oyo ya mibale, mokonzi atunaki lisusu Ester :

3Ester, mwasi ya mokonzi, azongisaki :

4Pamba te ngai mpe bato na ngai, tosili kotekama mpo ete babebisa biso, baboma biso mpe balimwisa biso ! Soki ata batekaki biso mpo ete tozala bawumbu ya basi to ya mibali, nalingaki na ngai kovanda kimia ; pamba te pasi ata moko te ya lolenge oyo ekokaki kotinda ngai ete natungisa mokonzi !

5Mokonzi Kizerisesi atunaki Ester, mwasi ya mokonzi :

6Ester azongiselaki ye :

7Mokonzi atelemaki na kanda makasi, atikaki vino na ye mpe abimaki na elanga ya ndako ya mokonzi. Tango Amani asosolaki ete mokonzi asili kokata etumbu na ye, atikalaki wana mpo na kobondela Ester, mwasi ya mokonzi, mpo ete abikisa bomoi na ye.

8Tango kaka mokonzi azongaki na esika oyo basalelaki feti longwa na elanga ya ndako ya mokonzi, Amani amikweyisaki na kiti monene oyo Ester, mwasi ya mokonzi, ayekamaki.

9Bongo Aribona, moko kati na basoda oyo baboma bango mokongo, alobaki liboso ya mokonzi :

10Boye badiembikaki Amani na nzete oyo atelemisaki mpo na Maridoshe. Mpe kanda ya mokonzi ekitaki.

← Ester 6 Ester Ester 8 →