We Believe JesusFé, Esperança e Nova Vida

Ester 6

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi · limburguês

← Ester 5 Ester Ester 7 →

1Na butu wana, lokola mokonzi akokaki kolala te, asengaki ete bamemela ye buku ya masolo, masolo ya bokonzi na ye, mpo ete batanga yango liboso na ye.

2Emonanaki ete bakomaki boye kati na yango : Maridoshe afundaki Bigitani mpe Tereshi, basoda mibale oyo baboma bango mokongo mpe bazalaki kokengela ekuke ya mokonzi, oyo basalaki likita mpo na koboma mokonzi Kizerisesi.

3Mokonzi atunaki :

4Mokonzi atunaki :

5Basali ya mokonzi bazongisaki :

6Tango Amani akotaki, mokonzi atunaki ye :

7Amani azongiselaki mokonzi :

8tika ete bamema nzambala ya bokonzi oyo mokonzi alataka elongo na mpunda oyo mokonzi amataka mpe batia motole ya bokonzi na moto ya mpunda yango.

9Tika ete bapesa nzambala mpe mpunda yango epai ya kalaka oyo aleki na lokumu kati na bakalaka ya mokonzi, mpe tika ete balatisa nzambala na moto oyo mokonzi alingi kopesa lokumu, mpe tika ete batambolisa ye likolo ya mpunda na balabala ya engumba na kotatola liboso na ye : « Tala makambo oyo mokonzi asali mpo na moto oyo ye alingi kopesa lokumu ! »

10Mokonzi alobaki na Amani :

11Amani azwaki nzambala mpe mpunda, alatisaki Maridoshe nzambala yango mpe atambolisaki ye likolo ya mpunda na balabala nyonso ya engumba na kotatola liboso na ye : « Tala makambo oyo mokonzi asali mpo na moto oyo alingi kopesa lokumu ! »

12Sima, Maridoshe azongaki na ekuke ya mokonzi ; kasi Amani azongaki noki na ndako na ye, na soni mpe azipa moto na ye.

13Amani ayebisaki mwasi na ye, Zereshi, mpe baninga na ye nyonso makambo oyo ekomelaki ye. Bapesi toli na ye mpe mwasi na ye, Zereshi, balobaki na ye :

14Wana bazalaki nanu kosolola na ye, basoda ya mokonzi, oyo baboma bango mokongo, bayaki mpe bamemaki Amani na lombangu na feti oyo Ester abongisaki.

← Ester 5 Ester Ester 7 →