We Believe JesusFé, Esperança e Nova Vida

1 Masolo ya Kala 27

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi · limburguês

← 1 Masolo ya Kala 26 1 Masolo ya Kala 1 Masolo ya Kala 28 →

1Tala bana ya Isalaele oyo bazalaki kosalela mokonzi : ezalaki na bakambi ya mabota, bakonzi ya bankoto mpe ya bankama ya basoda mpe bakomi mikanda. Mosala na bango ezalaki : kotala makambo oyo etali mabongisi ya mampinga. Sanza na sanza kati na mobu, lisanga moko ezalaki kokota na mosala mpe lisanga mosusu ezalaki kobima. Lisanga moko na moko ezalaki na mibali nkoto tuku mibale na minei.

2Mpo na sanza ya liboso : lisanga ya Yashobeami, mwana mobali ya Zabidieli ; lisanga yango ezalaki na mibali nkoto tuku mibale na minei.

3Yashobeami azalaki mokitani ya Peretsi mpe azalaki mokonzi ya bakonzi nyonso ya mampinga mpo na sanza ya liboso.

4Mpo na sanza ya mibale : lisanga ya Dodayi, moto ya libota ya Aoyi. Mikiloti azalaki mokambi ya lisanga ya Dodayi. Lisanga yango ezalaki na mibali nkoto tuku mibale na minei.

5Mpo na sanza ya misato : lisanga ya Benaya, mwana mobali ya Yeoyada, mokonzi ya Banganga-Nzambe ; lisanga yango ezalaki na mibali nkoto tuku mibale na minei.

6Benaya azalaki moko kati na basoda ya mpiko tuku misato mpe azalaki mokonzi na bango ; Amizadabi, mwana na ye ya mobali, azalaki moko kati na basoda ya lisanga yango.

7Mpo na sanza ya minei : lisanga ya Asaeli, ndeko mobali ya Joabi. Zebadia, mwana na ye ya mobali, akitanaki na ye ; lisanga yango ezalaki na bato nkoto tuku mibale na minei.

8Mpo na sanza ya mitano : lisanga ya mokambi Shamewuti, moto ya libota ya Yizirayi ; lisanga yango ezalaki na mibali nkoto tuku mibale na minei.

9Mpo na sanza ya motoba : lisanga ya Ira, mwana mobali ya Ikeshi, moto ya libota ya Tekoa ; lisanga yango ezalaki na mibali nkoto tuku mibale na minei.

10Mpo na sanza ya sambo : lisanga ya Eletsi, moto ya libota ya Peloni, moko kati na bato ya libota ya Efrayimi ; lisanga yango ezalaki na mibali nkoto tuku mibale na minei.

11Mpo na sanza ya mwambe : lisanga ya Sibekayi, moto ya libota ya Usha, moko kati na bakitani ya Zera ; lisanga yango ezalaki na mibali nkoto tuku mibale na minei.

12Mpo na sanza ya libwa : lisanga ya Abiezeri, moto ya libota ya Anatoti, moko kati na bato ya libota ya Benjame ; lisanga yango ezalaki na bato nkoto tuku mibale na minei.

13Mpo na sanza ya zomi : lisanga ya Maarayi, moto ya libota ya Netofa, moko kati na bakitani ya Zera ; lisanga yango ezalaki na mibali nkoto tuku mibale na minei.

14Mpo na sanza ya zomi na moko : lisanga ya Benaya, moto ya libota ya Piratoni, moko kati na bato ya libota ya Efrayimi ; lisanga yango ezalaki na mibali nkoto tuku mibale na minei.

15Mpo na sanza ya zomi na mibale : lisanga ya Elidayi, moto ya libota ya Netofa, moko kati na bakitani ya Otinieli ; lisanga yango ezalaki na mibali nkoto tuku mibale na minei.

16Tala bakonzi ya mabota ya Isalaele :

17mpo na libota ya Levi :

18mpo na libota ya Yuda :

19mpo na libota ya Zabuloni :

20mpo na libota ya Efrayimi :

21mpo na ndambo ya libota ya Manase kati na Galadi :

22mpo na libota ya Dani :

23Davidi atangaki te molongo ya mibali oyo bazalaki na se ya mibu tuku mibale ya mbotama, pamba te Yawe alakaki ete akokomisa Isalaele ebele lokola minzoto ya likolo.

24Joabi, mwana mobali ya Tseruya, abandaki kotanga bango kasi asilisaki te. Pamba te likolo ya botangi wana, Yawe akitiselaki Isalaele kanda na Ye. Boye, motango ya bato yango ekomamaki te na buku ya masolo ya mokonzi Davidi.

25Azimaveti, mwana mobali ya Adieli, azalaki kobatela bibombelo ya bozwi ya mokonzi.

26Eziri, mwana mobali ya Kelubi, azalaki mokambi ya basali bilanga ;

27Shimei, moto ya engumba Rama, azalaki mobateli bilanga ya vino ;

28Bala-Anani, moto ya engumba Gederi, azalaki mobateli banzete ya olive mpe ya sikomori, na lubwaku ya ngambo ya weste ;

29Shitrayi, moto ya engumba Saroni, azalaki mobateli bangombe oyo ezalaki kolia na Saroni ;

30Obili, moto ya libota ya Isimaeli, azalaki mobateli bashamo ;

31Yazizi, moto ya libota ya Agari, azalaki mobateli bibwele.

32Jonatan, ndeko ya tata ya Davidi, azalaki mopesi toli, moto ya mayele mpe mokomi mikanda.

33Ayitofeli azalaki mopesi toli ya mokonzi ;

34Yeoyada, mwana mobali ya Benaya, elongo na Abiatari, bakitanaki na Ayitofeli.

← 1 Masolo ya Kala 26 1 Masolo ya Kala 1 Masolo ya Kala 28 →