1Tala masanga ya bakengeli bikuke :
2Meshelemia azalaki na bana mibali oyo :
3mwana ya mitano, Elami ;
4Obedi-Edomi mpe azalaki na bana mibali oyo :
5mwana ya motoba, Amieli ;
6Mwana na ye ya mobali Shemaya azalaki mpe na bana mibali oyo bazalaki bakambi ya libota ya tata na bango, pamba te bazalaki bilombe mibali.
7Bana mibali ya Shemaya :
8Bango nyonso bazalaki bakitani ya Obedi-Edomi. Bango, bana na bango mpe bandeko na bango ya mibali bazalaki bilombe mpe bato ya mpiko mpo na mosala. Bakitani nyonso ya Obedi-Edomi bazalaki tuku motoba na mibale.
9Meshelemia azalaki na bana mibali mpe bandeko mibali oyo bazalaki bilombe : bango nyonso bazalaki zomi na mwambe.
10Osa, moko kati na bana mibali ya Merari, azalaki na bana mibali oyo :
11Ilikia, mwana ya mibale ;
12Masanga ya bakengeli bikuke ezalaki na mokumba ya kokengela bikuke ya Tempelo ya Yawe, na bokambami ya bakonzi na bango ndenge bandeko na bango bazalaki mpe kosala.
13Boye kobanda na leki kino na kulutu, bazalaki kobeta zeke mpo na ekuke moko na moko, kolanda mabota na bango.
14Mpo na ekuke ya ngambo ya este, zeke ekweyaki epai ya libota ya Shelemia.
15Mpo na ekuke ya ngambo ya sude, zeke ekweyaki epai ya Obedi-Edomi ; mpe mpo na ndako oyo babombelaka biloko, zeke ekweyaki epai ya bana na ye ya mibali.
16Mpo na ekuke ya ngambo ya weste mpe ekuke ya Shaleketi, na nzela oyo emata na likolo, zeke ekweyaki epai ya Shupimi mpe Osa.
17mokolo na mokolo, ezalaki na Balevi motoba na ngambo ya este,
18Mpo na lopango ya weste, ezalaki na bakengeli minei na nzela ; mpe mibale kati na lopango.
19Oyo nde ezalaki masanga ya bakengeli bikuke oyo baponamaki kati na libota ya Kore mpe ya Merari.
20Balevi mosusu lokola Ayiya, bazalaki na mokumba ya kobatela bozwi ya Tempelo mpe biloko ya bule.
21Tala bakitani ya Laedani, oyo bazalaki bato ya etuka ya Gerishoni mpe bakambi, moto na moto ya libota na ye : bato ya Yeyeli ;
22mpe bana mibali ya Yeyeli : Zetami mpe ndeko na ye ya mobali Joeli. Bazalaki na mokumba ya kobatela bozwi ya Tempelo ya Yawe.
23Mpo na bakitani ya Amirami, ya Yitseari, ya Ebron mpe ya Uzieli :
24Shebueli, mokitani ya Gerishomi, mwana mobali ya Moyize, azalaki mokonzi ya babateli bozwi ya Tempelo.
25Tala bandeko na ye ya mibali oyo babotamaki na nzela ya Eliezeri : Reabia, Ezayi, Yorami, Zikiri mpe Shelomiti.
26Shelomiti elongo na bandeko na ye ya mibali bazalaki na mokumba ya kobatela biloko nyonso oyo mokonzi Davidi abulisaki mpo na Yawe ; bakambi ya mabota, bakambi ya bankoto, bakambi ya bankama mpe bakonzi mosusu ya mampinga.
27Babulisaki biloko mosusu oyo bazwaki na bitumba mpo na kobongisa Tempelo ya Yawe.
28Shelomiti mpe bandeko na ye ya mibali bazalaki na mokumba ya kobatela biloko nyonso oyo Samuele, momoni makambo ; Saulo, mwana mobali ya Kishi ; Abineri, mwana mobali ya Neri ; Joabi oyo kombo ya mama na ye ezalaki « Tseruya, » babulisaki mpo na Yawe.
29Mpo na bakitani ya Yitseari :
30Mpo na bakitani ya Ebron :
31Mpo na bakitani ya Ebron : Yeriya azalaki mokonzi na bango, kolanda milongo ya mabota na bango.
32Yeriya azalaki na bandeko mibali nkoto mibale na nkama sambo : bazalaki bilombe mibali mpe bakambi ya mabota. Mokonzi Davidi apesaki bango mokumba ya misala nyonso ya Nzambe mpe ya mokonzi kati na libota ya Ribeni, ya Gadi mpe ya ndambo ya libota ya Manase.