1Nzembo ya Davidi.
2pamba te bakokawuka noki lokola makasa,
3Tia elikya na yo kati na Yawe mpe sala bolamu,
4Komisa Yawe bilengi na yo ya makasi,
5Kaba bomoi na yo epai na Yawe,
6akongengisa bosembo na yo lokola pole,
7Batela kimia liboso ya Yawe
8Boya kanda mpe kosilika te ;
9Pamba te bato oyo basalaka mabe bakolimwa,
10Etikali tango moke kaka,
11Kasi bato oyo bamikitisa bakozwa mokili
12Bato mabe basalelaka bato ya sembo makita
13Kasi Yawe asekaka bato mabe,
14Bato mabe babimisi mipanga
15Kasi mipanga na bango ekotobola mitema na bango moko,
16Mwa biloko ya moto ya sembo eleki
17pamba te nguya ya bato mabe ekosila,
18Yawe ayebi mikolo ya bato bazangi pamela,
19Na tango ya pasi, bakokawuka te ;
20Kasi bato mabe bakokufa,
21Moto mabe adefaka mpe azongisaka te,
22Bato oyo Yawe apambolaka bakozwa
23Soki Yawe asepeli na etamboli ya moto,
24ezala akweyi, akotikala kaka ya kokweya te ;
25Nazalaki elenge, mpe sik’oyo nakomi mobange,
26Akabaka tango nyonso mpe adefisaka,
27Zala mosika na mabe mpe sala bolamu,
28pamba te Yawe alingaka bosembo,
29Bato ya sembo bakozwa mokili lokola libula na bango
30Monoko ya moto ya sembo ebimisaka bwanya,
31Mobeko ya Nzambe na ye ezali kati na motema na ye,
32Moto mabe atalaka moto ya sembo na miso mabe
33kasi Yawe akosundola moto ya sembo te
34Zala na elikya kati na Yawe
35Namonaki moto mabe mpe na kanza
36kasi alekaki noki mpe azalaki lisusu te ;
37Tala malamu moto oyo azangi pamela,
38Kasi batomboki bakobebisama,
39Lobiko ya bato ya sembo ewutaka epai ya Yawe
40Yawe asungaka mpe akangolaka bango,