1Bino bato ya sembo, bobeta milolo ya esengo na tina na Yawe !
2Bosanzola Yawe na nzenze,
3Boyembela Yawe nzembo ya sika,
4Pamba te Liloba na Yawe ezali alima,
5Yawe alingaka bosembo mpe alima ;
6Likolo ekelamaki na Liloba na Yawe ;
7Asangisaka mayi ya bibale minene esika moko,
8Tika ete mokili mobimba etosa Yawe !
9Pamba te alobaki, mpe likambo esalemaki ;
10Yawe akweyisaka mikano ya bikolo,
11Kasi mikano ya Yawe etikalaka mpo na seko,
12Esengo na ekolo oyo Yawe azali Nzambe na yango.
13Yawe atalaka wuta na likolo,
14Wuta na evandelo na Ye,
15Ye oyo asalaka mitema nyonso ya bato
16Ezali te limpinga monene nde ebikisaka mokonzi
17Mpunda ezali na nguya te ya kopesa lobiko,
18Nzokande Yawe atalaka bato oyo batosaka Ye,
19mpo na kokangola bango na kufa
20Totielaka Yawe motema ;
21Solo, mitema na biso esepelaka kati na Ye,
22Yawe, lokola totiaka elikya na biso kati na Yo,