1Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya Davidi, ya koyemba lokola nzembo na kombo « Mboloko ya tongo. »
2Nzambe na ngai, Nzambe na ngai,
3Nzambe na ngai, na moyi, nabeleli Yo,
4Nzokande, ozali Mosantu,
5Batata na biso batiaki elikya na bango kati na Yo,
6Bagangaki epai na Yo,
7Nazali lisusu moto te, kasi mutsopi ;
8Bato nyonso oyo bazali komona ngai
9« Atiaka motema na ye epai na Yawe ;
10Solo, Yawe, obimisaki ngai na libumu ya mama na ngai,
11Wuta mbotama na ngai,
12Kozala mosika na ngai te,
13Banguna na ngai bazingeli ngai
14mpe bafungoleli ngai makasi minoko na bango
15Nakomi lokola mayi oyo ezali kosopana,
16Makasi na ngai ekawuki lokola potopoto,
17Bambwa ezingeli ngai,
18Nakoki sik’oyo kotanga ata mikuwa na ngai nyonso ;
19bazali kokabola bilamba na ngai
20Kasi Yo, Yawe, kozala mosika te !
21Bikisa bomoi na ngai liboso ya mopanga,
22Bikisa ngai wuta na monoko ya nkosi
23Nakotatola Kombo na Yo epai ya bandeko na ngai,
24Bino bato oyo botosaka Yawe, bosanzola Ye !
25Pamba te Yawe atiolaki te
26Na ngolu na Yo, nakumisaka Yo kati na mayangani,
27Babola bakolia mpe bakotonda ;
28Mokili mobimba ekokanisa Yawe,
29Pamba te Yawe azali Mokonzi,
30Bazwi nyonso ya mokili bakolia
31Bakitani na bango bakosalela Yawe
32bakosakola misala ya bosembo na Ye,