1Bokumisa Yawe !
2Bokumisa Ye, bino ba-anjelu na Ye nyonso ;
3bokumisa Ye, bino moyi mpe sanza ;
4bokumisa Ye, bino oyo boleki likolo kati na likolo,
5Tika ete ekumisa Kombo ya Yawe !
6Atiaki yango mpo na libela ;
7Bokumisa Yawe wuta na mokili,
8ezala moto to mvula ya mabanga,
9ezala bangomba milayi to bangomba mikuse,
10ezala banyama ya zamba to bibwele nyonso,
11ezala bakonzi ya mabele to bikolo nyonso,
12ezala bilenge mibali to bilenge basi,
13Tika ete bakumisa Kombo ya Yawe !
14Abongisi elombe mokangoli mpo na bato na Ye !