We Believe JesusFé, Esperança e Nova Vida

Banzembo 136

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi · limburguês

← Banzembo 135 Banzembo Banzembo 137 →

1Bosanzola Yawe, mpo ete azali malamu ;

2Bosanzola Nzambe ya banzambe ;

3Bosanzola Nkolo na bankolo ;

4Ye kaka nde asalaka bikamwa ya minene ;

5Akelaki likolo na mayele na Ye ;

6Atandaki mabele na likolo ya mayi ;

7Akelaki biloko minene oyo ebimisaka pole ;

8moyi mpo na kongengisa mokolo ;

9sanza mpe minzoto mpo na kongengisa butu ;

10Abomaki bana mibali ya liboso ya Ejipito ;

11Abimisaki Isalaele wuta na Ejipito ;

12na nguya monene ya loboko na Ye ;

13Akabolaki ebale monene ya Barozo na biteni mibale ;

14Alekisaki Isalaele na kati-kati ya ebale monene ya Barozo ;

15Azindisaki Faraon elongo na mampinga na ye kati na ebale monene ya Barozo ;

16Atambolisaki bato na Ye kati na esobe ;

17Abetaki bakonzi minene ;

18Abomaki bakonzi ya nguya ;

19Sikoni, mokonzi ya bato ya Amori ;

20mpe Ogi, mokonzi ya Bashani ;

21Akabaki mabele na bango lokola libula ;

22lokola libula epai ya Isalaele, mosali na Ye ;

23Akanisaki biso tango basambwisaki biso ;

24Akangolaki biso wuta na maboko ya banguna na biso ;

25Apesaka bilei na bikelamu nyonso ;

26Bosanzola Nzambe ya likolo ;

← Banzembo 135 Banzembo Banzembo 137 →