We Believe JesusFé, Esperança e Nova Vida

Malako 14

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi · limburguês

← Malako 13 Malako Malako 15 →

1Wana etikalaki mikolo mibale mpo ete feti ya Pasika mpe feti ya Mapa ezanga levire ebanda, bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe balakisi ya Mobeko bazalaki koluka ndenge nini kokanga Yesu na mayele mpo na koboma Ye ;

2pamba te balobaki : « Tosala yango te na tango ya feti, noki te bato bakotomboka. »

3Lokola Yesu azalaki na Betani, na ndako ya Simona oyo azalaki moto na maba, mwasi moko akotaki, wana Yesu azalaki na mesa. Na maboko na ye, azalaki na molangi ya alibatre etonda na malasi ya nar, oyo basangisa na eloko mosusu te mpe ya motuya makasi ; afungolaki molangi yango mpe asopaki malasi yango na moto ya Yesu.

4Kati na bato oyo bazalaki wana, bamosusu basilikaki mpe balobaki :

5Bakokaki ata koteka malasi yango na motuya ya mbongo ya bibende koleka nkama misato mpe kopesa mbongo yango epai ya babola !

6Kasi Yesu alobaki :

7Bokozalaka na babola tango nyonso mpe bokoki tango nyonso kosalelaka bango bolamu oyo bolingi ; kasi Ngai, bokozalaka na Ngai tango nyonso te.

8Mwasi oyo asali likambo oyo akoki, asili kosopela nzoto na Ngai malasi mpo na kobongisa kokundama na Ngai.

9Nazali koloba na bino penza ya solo : Esika nyonso bakosakola Sango Malamu kati na mokili mobimba, bakobanda mpe kolobela likambo mwasi oyo awuti kosala, mpo na kokanisa ye.

10Bongo Yuda Isikarioti, moko kati na bantoma zomi na mibale, akendeki epai ya bakonzi ya Banganga-Nzambe mpo na koteka Yesu epai na bango.

11Tango bayokaki bongo, basepelaki makasi mpe balakaki kopesa ye mbongo. Boye, Yuda akomaki koluka libaku ya kokaba Yesu.

12Na mokolo ya liboso ya feti ya Mapa ezanga levire, mokolo oyo bazalaki koboma mwana meme lokola mbeka ya Pasika, bayekoli batunaki Ye :

13Bongo, kati na bayekoli na Ye, Yesu atindaki mibale ; alobaki na bango :

14mpe, tango akokota na ndako, boloba na nkolo ndako yango : « Moteyi azali kotuna yo : ‹ Wapi shambre na Ngai epai wapi nakolia bilei ya Pasika elongo na bayekoli na Ngai ? › »

15Bongo ye akolakisa bino, na etaje ya suka, shambre moko ya monene, babongisa malamu mpe bakoki kosalela yango. Ezali kuna nde bokobongisa bilei ya Pasika mpo na biso.

16Tango bayekoli bakendeki, bakotaki na engumba mpe bakutaki makambo nyonso ndenge kaka Yesu ayebisaki bango. Bongo babongisaki bilei ya Pasika.

17Tango pokwa ekomaki, Yesu ayaki elongo na bayekoli zomi na mibale.

18Wana bazalaki na mesa mpe bazalaki kolia, Yesu alobaki :

19Bayokaki mawa mingi, mpe bakomaki kotuna Ye, moko sima na moninga :

20Yesu azongisaki :

21Solo, Mwana na Moto akokende, kolanda ndenge ekomama na tina na Ye ; kasi mawa na moto oyo akoteka Mwana na Moto ! Elingaki kozala malamu koleka mpo na moto yango ete abotama te.

22Wana bazalaki kolia, Yesu azwaki lipa ; sima na Ye kozongisa matondi epai ya Nzambe, akataki yango, apesaki bango yango mpe alobaki :

23Azwaki lisusu kopo ; mpe sima na Ye kozongisa matondi epai ya Nzambe, apesaki bango yango, mpe bango nyonso bamelaki yango.

24Bongo alobaki na bango :

25Nazali koloba na bino penza ya solo : nakomela lisusu vino oyo te kino na mokolo oyo nakomela yango, ya sika, kati na Bokonzi ya Nzambe.

26Sima na yango, bayembaki banzembo ; bongo babimaki mpo na kokende na ngomba ya banzete ya olive.

27Yesu alobaki na bango :

28Kasi, sima na Ngai kosekwa, nakokende na Galile, liboso na bino.

29Petelo alobaki na Ye :

30Yesu azongiselaki ye :

31Kasi Petelo akobaki kotia monoko makasi, alobaki :

32Tango bakomaki na esika oyo kombo na yango ezali Getisemane, Yesu alobaki na bayekoli na Ye :

33Wana amemaki Petelo, Jake mpe Yoane, akomaki mawa-mawa mpe komitungisa ;

34alobaki na bango :

35Wana akendeki mwa mosika, amikitisaki na mabele mpe azalaki kosambela Nzambe mpo ete, soki ekoki kosalema, tango wana ya pasi ekende mosika na Ye.

36Azalaki kobondela :

37Bongo azongaki epai bayekoli na Ye bazalaki mpe akutaki bango balala pongi.

38Bosenzela mpe bosambela mpo ete bokweya te kati na komekama. Molimo ezalaka na posa makasi ya kosala malamu, kasi nzoto ezalaka na bolembu.

39Akendeki lisusu mwa mosika mpe abondelaki kaka ndenge moko.

40Azongaki lisusu epai bayekoli na Ye bazalaki mpe akutaki bango lisusu balala pongi, pamba te bayokaki pongi makasi mpe miso na bango ekomaki kilo. Bayebaki te eyano ya kopesa Ye.

41Azongaki mpo na mbala ya misato, mpe alobaki na bango :

42Botelema ; tokende. Moto oyo ateki Ngai azali koya.

43Wana Yesu azalaki nanu koloba, Yuda, moko kati na bayekoli zomi na mibale, akomaki elongo na bato ebele oyo basimbaki mipanga mpe banzete ; ezalaki bakonzi ya Banganga-Nzambe, balakisi ya Mobeko mpe bakambi ya bato nde batindaki bango.

44Moto oyo atekaki Yesu apesaki bango elembo moko : « Moto oyo ngai nakopesa beze, ezali nde ye ; bokokanga ye mpe bokomema ye na se ya bokengeli malamu. »

45Tango kaka Yuda akomaki, akendeki epai ya Yesu mpe alobaki na Ye :

46Mbala moko, basimbaki Yesu na makasi mpe bakangaki Ye.

47Bongo moko kati na bato oyo bazalaki wana abimisaki mopanga na ye wuta na ebombelo na yango, abetaki yango mosali ya mokonzi ya Banganga-Nzambe mpe akataki ye litoyi.

48Yesu alobaki na bango :

49Nazalaki elongo na bino mikolo nyonso kati na lopango ya Tempelo mpo na kopesa malakisi na Ngai, mpe bokangaki Ngai te. Kasi ezali kosalema bongo mpo ete Makomi ekokisama.

50Bayekoli na Ye nyonso basundolaki Ye mpe bakimaki.

51Nzokande, elenge mobali moko azalaki kolanda Yesu ; alataki liputa ya pamba. Mpe tango bakangaki ye,

52asundolaki liputa mpe akimaki.

53Bamemaki Yesu epai ya mokonzi ya Banganga-Nzambe epai wapi bakonzi ya Banganga-Nzambe, bakambi ya bato mpe balakisi ya Mobeko, bango nyonso, basanganaki.

54Petelo azalaki kolanda Yesu na mosika, kino kati na lopango ya ndako ya mokonzi ya Banganga-Nzambe ; avandaki kuna elongo na bakengeli, pene ya moto, mpe azalaki koyetola moto.

55Nzokande bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe bato nyonso ya Likita-Monene ya Bayuda bazalaki koluka litatoli moko oyo ekobimisa polele mabe ya Yesu mpo ete bakoka kokatela Ye etumbu ya kufa, kasi bazalaki kozwa yango te ;

56pamba te bato mingi bazalaki kokosela Ye makambo, kasi matatoli na bango ezalaki kokokana te.

57Mpo na kaka kokosela Ye makambo, bato mosusu bazalaki kotelema na koloba :

58« Toyokaki ye koloba : ‹ Ngai, nakobuka Tempelo oyo esalema na maboko ya bato ; mpe sima na mikolo misato, nakotonga Tempelo mosusu oyo ekosalema na maboko ya bato te. › »

59Kasi atako bongo, litatoli na bango ezalaki kaka ya lokuta.

60Mokonzi ya Banganga-Nzambe atelemaki kati na mayangani mpe apesaki Yesu motuna :

61Kasi Yesu abatelaki kimia mpe apesaki ata eyano moko te.

62Yesu azongisaki :

63Bongo mokonzi ya Banganga-Nzambe apasolaki bilamba na ye mpe alobaki :

64Bino moko boyoki ndenge nini afingi Nzambe. Bokanisi nini mpo na yango ?

65Bato mosusu bakomaki kobwakela Ye soyi, kozipa Ye elongi, kobeta Ye makofi na koloba na Ye :

66Wana Petelo azalaki na se, kati na lopango ya kati, mwasi mosali moko ya mokonzi ya Banganga-Nzambe ayaki wana,

67amonaki Petelo koyetola moto. Sima na ye kotala Petelo malamu, alobaki na ye :

68Kasi Petelo awanganaki ; alobaki :

69Tango mwasi mosali amonaki ye, alobaki lisusu na bato oyo bazalaki wana :

70Petelo awanganaki lisusu.

71Bongo Petelo abandaki kolapa ndayi esangana na bilakeli mabe :

72Kaka na tango yango, soso elelaki mpo na mbala ya mibale. Bongo Petelo akanisaki maloba oyo Yesu alobaki na ye : « Liboso ete soso elela mbala mibale, okowangana Ngai mbala misato. » Mpe alelaki makasi.

← Malako 13 Malako Malako 15 →