1Boni, Bwanya azali kobelela te ?
2Atelemi na songe ya bangomba, na pembeni ya nzela,
3azali koganga pene ya bikuke,
4« Bato, nazali koganga makasi epai na bino,
5Bino bato oyo bozanga mayele, bokoma na bososoli !
6Boyoka, pamba te nazali na makambo ya motuya
7Pamba te monoko na ngai ebimisaka maloba ya solo,
8Maloba nyonso oyo ebimaka na monoko na ngai
9nyonso ezali pole mpo na moto ya mayele,
10Boluka mateya na ngai kasi palata te,
11pamba te bwanya ezali na motuya
12Ngai, Bwanya, navandaka elongo na kokanisa,
13Kotosa Yawe ezali koyina mabe.
14Toli mpe bososoli ezali ya ngai,
15Ezali na nzela na ngai nde bakonzi batambolisaka mokili,
16ezali na nzela na ngai nde bakambi, bankumu
17Nalingaka bato oyo balingaka ngai,
18Bozwi mpe lokumu,
19Mbuma na ngai ezali kitoko koleka wolo,
20Natambolaka na nzela ya bosembo,
21mpo na kopesa libula epai ya bato oyo balingaka ngai
22Yawe asalaki ngai liboso ete asala nyonso,
23aponaki ngai liboso ete mokili ezala,
24Nabotamaki tango mayi ya bozindo ezalaki nanu te,
25liboso ete bangomba ya milayi mpe bangomba ya mikuse
26tango amisalelaki nanu te, ezala mabele to bilanga
27Nazalaki wana tango atandaki likolo na esika na yango,
28tango atiaki mapata na likolo
29tango akatelaki ebale monene mondelo
30nazalaki pembeni na Ye lokola mosungi,
31nazalaki kosepela kati na mokili na Ye
32Sik’oyo, mwana na ngai, yoka ngai :
33Boyoka mateya na ngai mpe bokokoma bato ya bwanya,
34Esengo na moto oyo ayokelaka ngai,
35Pamba te moto oyo amoni ngai amoni bomoi
36Kasi moto oyo atosaka ngai te