1Bana na ngai, boyokaka mateya ya tata,
2Pamba te nazali kopesa bino mateya ya malamu ;
3Ngai mpe nazalaki mwana malamu
4Tata na ngai azalaki koteya
5zwa bwanya, zwa mayele, kobosana yango te,
6kosundola bwanya te, mpe yango ekobatela yo,
7Tala ebandeli ya bwanya : Zwa bwanya,
8Simba yango makasi, mpe ekotombola yo ;
9Ekolatisa yo ekoti ya lokumu na moto,
10Mwana na ngai, yoka mpe yamba maloba na ngai,
11Nazali kolakisa yo nzela ya bwanya,
12Mpo ete makolo na yo ezala na mikakatano te
13Tingama makasi na mateya oyo bapesi yo,
14Kokotaka te na nzela ya bato ya mobulu
15Longwa kati na bango, kolekela wana te,
16Pamba te balalaka pongi te
17baliaka lipa na nzela ya mabe
18Nzokande, nzela ya bato ya sembo ezali
19Nzela ya bato ya mobulu ezali lokola molili,
20Mwana na ngai, zala na bokebi na maloba na ngai,
21Tika ete ezala te mosika ya miso na yo !
22pamba te ezali bomoi mpo na bato oyo bazwaka yango,
23Batela malamu motema na yo koleka biloko nyonso,
24Longola lokuta na monoko na yo,
25Tika ete miso na yo etalaka kaka liboso,
26Bongisa nzela oyo makolo na yo ekolekela,
27Kotengama te,