We Believe JesusFé, Esperança e Nova Vida

Oze 1

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi · limburguês

Oze Oze 2 →

1Tala liloba oyo Yawe alobaki na nzela ya Oze, mwana mobali ya Beri, tango Oziasi, Yotami, Akazi mpe Ezekiasi bazalaki bakonzi ya Yuda, mpe tango Jeroboami, mwana mobali ya Joasi, azalaki mokonzi ya Isalaele :

2Tango Yawe abandaki koloba na nzela ya mosakoli Oze, Yawe ayebisaki ye :

3Boye, Oze akendeki kolinga Gomeri, mwana mwasi ya Dibilayimi. Gomeri akomaki na zemi mpe abotelaki ye mwana mobali.

4Yawe alobaki na ye :

5Na mokolo wana, nakobuka tolotolo ya Isalaele kati na lubwaku ya Jizireyeli.

6Gomeri akomaki lisusu na zemi mpe abotaki mwana mwasi. Yawe alobaki na Oze :

7Kasi nakotalisa bolamu na Ngai epai ya libota ya Yuda mpe nakobikisa bango. Ngai moko Yawe, Nzambe na bango, nde nakosala bongo ; ekozala na nguya ya tolotolo te, ya mopanga te, ya bitumba te, ya bampunda te to mpe ya bashar te.

8Tango Gomeri alongolaki Lo-Rukama na mabele, Gomeri akomaki lisusu na zemi mpe abotaki mwana mobali.

9Yawe alobaki :

Oze Oze 2 →