1Na mokolo oyo Moyize asilisaki kotonga Mongombo, asopelaki yango mafuta mpo na kobulisa yango elongo na bisalelo na yango. Asalaki mpe bongo mpo na etumbelo elongo na bisalelo na yango, asopelaki yango mafuta mpo na kobulisa yango.
2Bongo bakambi ya Isalaele, bakonzi ya mabota, elingi koloba bakonzi ya bikolo oyo bakambaki mosala ya kotanga motango ya bato,
3bamemaki makabo na bango liboso ya Yawe : bashario motoba mpe bangombe zomi na mibale. Shario moko mpo na bakambi mibale, mpe ngombe moko mpo na mokonzi moko na moko ; bamemaki yango liboso ya Mongombo.
4Yawe alobaki na Moyize :
5« Ndima kozwa makabo oyo bayei na yango ; okosala na yango mosala ya Ndako ya kapo ya Bokutani. Okopesa yango epai ya Balevi kolanda mokumba ya moko na moko. »
6Moyize andimaki kozwa bashar mpe bangombe mpe apesaki yango epai ya Balevi.
7Apesaki bashar mibale mpe bangombe minei epai ya bana mibali ya Gerishoni kolanda bosenga ya mosala na bango.
8Apesaki bashar minei mpe bangombe mwambe epai ya bana mibali ya Merari kolanda bosenga ya mosala na bango na bokambami ya Itamari, mwana mobali ya Nganga-Nzambe Aron.
9Apesaki eloko te epai ya bana mibali ya Keati, pamba te bazalaki na mokumba ya komema na mapeka na bango biloko ya bule.
10Bakambi bamemaki makabo na bango mpo na libulisi ya etumbelo, na mokolo oyo basopelaki yango mafuta ; bamemaki makabo yango liboso ya etumbelo.
11Bongo Yawe alobaki na Moyize : « Tika ete mokolo na mokolo, mokambi moko na moko amema likabo na ye mpo na libulisi ya etumbelo ! »
12Na mokolo ya liboso, Nashoni, mwana mobali ya Aminadabi, moto ya libota ya Yuda, amemaki likabo na ye.
13Likabo na ye ezalaki :
14mpe mbeki moko ya wolo ya bagrame nkama moko na zomi etonda na ansa,
15ngombe moko ya mobali, meme moko ya mobali, mwana meme moko ya mobu moko mpo na mbeka ya kotumba,
16ntaba moko ya mobali lokola mbeka mpo na masumu ;
17mpe, lokola mbeka mpo na kozongisa boyokani, bangombe mibale ya mibali, bameme mitano ya mibali, bantaba mitano ya mibali mpe bana meme mitano ya mobu moko.
18Na mokolo ya mibale, Netaneeli, mwana mobali ya Tsuwari, mokambi ya libota ya Isakari,
19amemaki makabo oyo :
20mbeki moko ya wolo ya bagrame nkama moko na zomi etonda na ansa.
21Amemaki lisusu :
22ntaba moko ya mobali lokola mbeka mpo na masumu ;
23mpe, lokola mbeka mpo na kozongisa boyokani, bangombe mibale ya mibali, bameme mitano ya mibali, bantaba mitano ya mibali mpe bana meme mitano ya mobu moko.
24Na mokolo ya misato, Eliabi, mwana mobali ya Eloni, mokambi ya libota ya Zabuloni,
25amemaki makabo oyo :
26mbeki moko ya wolo ya bagrame nkama moko na zomi etonda na ansa.
27Amemaki lisusu :
28ntaba moko ya mobali lokola mbeka mpo na masumu ;
29mpe, lokola mbeka mpo na kozongisa boyokani, bangombe mibale ya mibali, bameme mitano ya mibali, bantaba mitano ya mibali mpe bana meme mitano ya mobu moko.
30Na mokolo ya minei, Elitsuri, mwana mobali ya Shedewuri, mokambi ya libota ya Ribeni,
31amemaki makabo oyo :
32mbeki moko ya wolo ya bagrame nkama moko na zomi etonda na ansa.
33Amemaki lisusu : mwana ngombe ya mobali, meme moko ya mobali, mwana meme moko ya mobu moko mpo na mbeka ya kotumba,
34ntaba moko ya mobali lokola mbeka mpo na masumu ;
35mpe, lokola mbeka mpo na kozongisa boyokani, bangombe mibale ya mibali, bameme mitano ya mibali, bantaba mitano ya mibali mpe bana meme mitano ya mobu moko.
36Na mokolo ya mitano, Shelumieli, mwana mobali ya Tsurishadayi, mokambi ya libota ya Simeoni,
37amemaki makabo oyo :
38mbeki moko ya wolo ya bagrame nkama moko na zomi etonda na ansa.
39Amemaki lisusu :
40ntaba moko ya mobali lokola mbeka mpo na masumu ;
41mpe, lokola mbeka mpo na kozongisa boyokani :
42Na mokolo ya motoba, Eliazafi, mwana mobali ya Deweli, mokambi ya libota ya Gadi,
43amemaki makabo oyo :
44mbeki moko ya wolo ya bagrame nkama moko na zomi etonda na ansa.
45Amemaki lisusu : mwana ngombe ya mobali, meme moko ya mobali, mwana meme moko ya mobu moko mpo na mbeka ya kotumba,
46ntaba moko ya mobali lokola mbeka mpo na masumu ;
47mpe, lokola mbeka mpo na kozongisa boyokani, bangombe mibale ya mibali, bameme mitano ya mibali, bantaba mitano ya mibali mpe bana meme mitano ya mobu moko.
48Na mokolo ya sambo, Elishama, mwana mobali ya Amiwudi, mokambi ya libota ya Efrayimi,
49amemaki makabo oyo :
50mbeki moko ya wolo ya bagrame nkama moko na zomi etonda na ansa.
51Amemaki lisusu : mwana ngombe ya mobali, meme moko ya mobali, mwana meme moko ya mobu moko mpo na mbeka ya kotumba,
52ntaba moko ya mobali lokola mbeka mpo na masumu ;
53mpe, lokola mbeka mpo na kozongisa boyokani, bangombe mibale ya mibali, bameme mitano ya mibali, bantaba mitano ya mibali mpe bana meme mitano ya mobu moko.
54Na mokolo ya mwambe, Gamilieli, mwana mobali ya Pedakitsuri, mokambi ya libota ya Manase,
55amemaki makabo oyo :
56mbeki moko ya wolo ya bagrame nkama moko na zomi etonda na ansa.
57Amemaki lisusu :
58ntaba moko ya mobali lokola mbeka mpo na masumu ;
59mpe, lokola mbeka mpo na kozongisa boyokani, bangombe mibale ya mibali, bameme mitano ya mibali, bantaba mitano ya mibali mpe bana meme mitano ya mobu moko.
60Na mokolo ya libwa, Abidani, mwana mobali ya Gideoni, mokambi ya libota ya Benjame,
61amemaki makabo oyo :
62mbeki moko ya wolo ya bagrame nkama moko na zomi etonda na ansa.
63Amemaki lisusu : mwana ngombe ya mobali, meme moko ya mobali, mwana meme moko ya mobu moko mpo na mbeka ya kotumba,
64ntaba moko ya mobali lokola mbeka mpo na masumu ;
65mpe, lokola mbeka mpo na kozongisa boyokani, bangombe mibale ya mibali, bameme mitano ya mibali, bantaba mitano ya mibali mpe bana meme mitano ya mobu moko.
66Na mokolo ya zomi, Akiezeri, mwana mobali ya Amishadayi, mokambi ya libota ya Dani,
67amemaki makabo oyo :
68mbeki moko ya wolo ya bagrame nkama moko na zomi etonda na ansa.
69Amemaki lisusu : mwana ngombe ya mobali, meme moko ya mobali, mwana meme moko ya mobu moko mpo na mbeka ya kotumba,
70ntaba moko ya mobali lokola mbeka mpo na masumu ;
71mpe, lokola mbeka mpo na kozongisa boyokani, bangombe mibale ya mibali, bameme mitano ya mibali, bantaba mitano ya mibali mpe bana meme mitano ya mobu moko.
72Na mokolo ya zomi na moko, Pagieli, mwana mobali ya Okirani, mokambi ya libota ya Aseri,
73amemaki makabo oyo :
74mbeki moko ya wolo ya bagrame nkama moko na zomi etonda na ansa.
75Amemaki lisusu :
76ntaba moko ya mobali lokola mbeka mpo na masumu ;
77mpe, lokola mbeka mpo na kozongisa boyokani, bangombe mibale ya mibali, bameme mitano ya mibali, bantaba mitano ya mibali mpe bana meme mitano ya mobu moko.
78Na mokolo ya zomi na mibale, Akira, mwana mobali ya Enani, mokambi ya libota ya Nefitali,
79amemaki makabo oyo :
80mbeki moko ya wolo ya bagrame nkama moko na zomi etonda na ansa.
81Amemaki lisusu :
82ntaba moko ya mobali lokola mbeka mpo na masumu ;
83mpe, lokola mbeka mpo na kozongisa boyokani, bangombe mibale ya mibali, bameme mitano ya mibali, bantaba mitano ya mibali mpe bana meme mitano ya mobu moko.
84Yango nde ezalaki makabo ya bakambi ya Isalaele mpo na libulisi ya etumbelo, na mokolo oyo basopelaki yango mafuta.
85Etando moko na moko ya palata ezalaki ya kilo moko na bagrame nkama mitano, mpe mbeki moko na moko ezalaki ya bagrame nkama mwambe : palata nyonso esalaki bakilo tuku mibale na sambo na bagrame nkama mitano, kolanda ndenge bazalaki komeka bakilo na Esika ya bule.
86Mbeki moko na moko ya wolo ezalaki ya bagrame nkama moko na zomi : wolo nyonso esalaki bagrame nkoto moko na nkama misato.
87Mpo na bambeka ya kotumba, bango nyonso bapesaki :
88Na kosangisa, bango nyonso bapesaki lokola mbeka mpo na kozongisa boyokani : bangombe tuku mibale na minei ya mibali, bameme tuku motoba ya mibali, bantaba tuku motoba ya mibali, bana meme tuku motoba ya mobu moko.
89Tango Moyize azalaki kokota na Ndako ya kapo ya Bokutani mpo na kosolola na Yawe, azalaki koyoka mongongo koloba na ye wuta na mofinuku oyo ezalaki likolo ya Sanduku ya Litatoli kati na basheribe mibale, mpe azalaki kosolola na ye.