We Believe JesusFé, Esperança e Nova Vida

Mitango 26

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi · limburguês

← Mitango 25 Mitango Mitango 27 →

1Yawe alobaki na Moyize mpe na Nganga-Nzambe Eleazari, mwana mobali ya Aron :

2« Botanga motango ya bato ya lisanga mobimba ya Isalaele, bato nyonso oyo bazali na mibu tuku mibale mpe koleka, oyo bazali na makoki ya kosala mosala ya kisoda kati na Isalaele. »

3Moyize elongo na Nganga-Nzambe Eleazari basololaki na bango na etando ya Moabi, na libongo ya Yordani, pene na Jeriko, mpe balobaki :

4« Tokotanga motango ya bana mibali nyonso ya Isalaele oyo bazali na mibu tuku mibale mpe koleka, ndenge Yawe apesaki mitindo epai ya Moyize. »

5Bakitani ya Ribeni, mwana mobali ya liboso ya Isalaele :

6na nzela ya Etsironi, bakitani ya libota ya Etsironi ;

7Yango nde ezalaki mabota ya Ribeni mpe bazalaki bato nkoto tuku minei na misato na nkama sambo na tuku misato.

8Eliabi azalaki mwana mobali ya Palu,

9mpe bana mibali ya Eliabi bazalaki Nemueli, Datani mpe Abirami. Datani mpe Abirami bazalaki bakalaka ya lisanga ya Isalaele oyo batombokelaki Moyize mpe Aron mpe bazalaki na molongo ya bato oyo bazalaki kolanda Kore oyo atombokelaki Yawe.

10Mabele efungolaki monoko na yango mpe emelaki bango elongo na Kore, oyo bato oyo bazalaki kolanda ye bakufaki tango moto ebomaki bato nkama mibale na mitano. Bakomaki lokola bandakisa.

11Kasi bakitani ya Kore bakufaki te.

12Bakitani ya Simeoni, kolanda mabota na bango, bazalaki :

13na nzela ya Zera, bakitani ya libota ya Zerayi ;

14Yango nde ezalaki mabota ya Simeoni mpe bazalaki bato nkoto tuku mibale na mibale na nkama mibale.

15Bakitani ya Gadi kolanda mabota na bango, bazalaki :

16na nzela ya Ozini, bakitani ya libota ya Ozini ;

17na nzela ya Arodi, bakitani ya libota ya Eroki ;

18Yango nde ezalaki mabota ya Gadi mpe bazalaki bato nkoto tuku minei na nkama mitano.

19Eri mpe Onani bazalaki bana mibali ya Yuda, kasi bakufaki na mokili ya Kanana.

20Bakitani mosusu ya Yuda, kolanda mabota na bango, bazalaki :

21Bakitani ya Peretsi kolanda mabota na bango bazalaki :

22Yango nde ezalaki mabota ya Yuda ; bazalaki bato nkoto tuku sambo na motoba na nkama mitano.

23Bakitani ya Isakari kolanda mabota na bango bazalaki :

24na nzela ya Yashubi, bakitani ya libota ya Yashubi ;

25Yango nde ezalaki mabota ya Isakari ; bazalaki bato nkoto tuku motoba na minei na nkama misato.

26Bakitani ya Zabuloni, kolanda mabota na bango, bazalaki :

27Yango nde ezalaki mabota ya Zabuloni mpe bazalaki bato nkoto tuku motoba na nkama mitano.

28Bakitani ya Jozefi kolanda mabota na bango na nzela ya Manase mpe Efrayimi bazalaki :

29Bakitani ya Manase :

30Tala bakitani ya Galadi :

31na nzela ya Asirieli, bakitani ya libota ya Asirieli ;

32na nzela ya Shemida, bakitani ya libota ya Shemida ;

33Tselofikadi, mwana mobali ya Eferi, azalaki na bana mibali te, kasi azalaki kaka na bana basi ; bongo, tala bakombo na bango : Mala, Noa, Ogila, Milika mpe Tiritsa.

34Yango nde ezalaki mabota ya Manase, mpe bazalaki bato nkoto tuku mitano na mibale na nkama sambo.

35Bakitani ya Efrayimi kolanda mabota na bango bazalaki :

36Tala bakitani ya Shutela :

37Yango ezalaki mabota ya Efrayimi mpe bazalaki bato nkoto tuku misato na mibale na nkama mitano.

38Bakitani ya Benjame kolanda mabota na bango bazalaki :

39na nzela ya Shufami, bakitani ya libota ya Shufami ;

40Bakitani ya Bela na nzela ya Aridi mpe Namani bazalaki :

41Yango nde ezalaki mabota ya Benjame mpe bazalaki bato nkoto tuku minei na mitano na nkama mitano.

42Bakitani ya Dani kolanda mabota na bango, bazalaki :

43bango nyonso bazalaki bakitani ya libota ya Shuami mpe bazalaki bato nkoto tuku motoba na minei na nkama minei.

44Bakitani ya Aseri, kolanda mabota na bango, bazalaki :

45na nzela ya bakitani ya Beria :

46Aseri azalaki mpe na mwana moko ya mwasi na kombo Sera.

47Yango nde ezalaki mabota ya Aseri, mpe bazalaki bato nkoto tuku mitano na misato na nkama minei.

48Bakitani ya Nefitali, kolanda mabota na bango, bazalaki :

49na nzela ya Yetseri, bakitani ya libota ya Yetseri ;

50Yango nde ezalaki mabota ya Nefitali, mpe bazalaki bato nkoto tuku minei na mitano na nkama minei.

51Motango nyonso ya bana ya Isalaele oyo batangaki ezalaki bato nkoto nkama motoba na moko na nkama sambo na tuku misato.

52Yawe alobaki na Moyize :

53« Esengeli kokabolela bango mokili lokola libula, kolanda motango ya bato wana.

54Bokopesa eteni ya mabele ya monene epai ya libota oyo ezali mpe monene, eteni ya mabele ya moke epai ya libota oyo ezali mpe moke. Libota moko na moko ekozwa libula na yango, kolanda motango ya bato oyo batangaki.

55Bakokabola mokili na kobeta zeke mpe libota moko na moko ekozwa libula na yango, kolanda bakombo ya bakoko ya bikolo na bango.

56Esengeli kokabola libula na libula na zeke kati na libota oyo ezali monene mpe libota oyo ezali moke. »

57Tala bakitani ya Levi oyo batangamaki kolanda mabota na bango :

58Tala mabota mosusu ya bakitani ya Levi :

59bongo, kombo ya mwasi ya Amirami ezalaki « Yokebedi. » Yokebedi azalaki mokitani ya Levi, oyo abotamaki na Ejipito. Abotaki na Amirami Aron, Moyize mpe ndeko na bango ya mwasi Miriami.

60Aron azalaki tata ya Nadabi na Abiyu, Eleazari na Itamari.

61Kasi Nadabi na Abiyu bakufaki tango babonzelaki Yawe makabo na moto ya mopaya.

62Bakitani nyonso ya mibali ya Levi oyo batangamaki, kobanda na sanza moko ya mbotama mpe koleka, bazalaki nkoto tuku misato. Batangaki bango te elongo na bato mosusu ya Isalaele mpo ete bazwaki libula te kati na bango.

63Yango nde motango ya bana ya Isalaele oyo Moyize elongo na Nganga-Nzambe Eleazari batangaki na bitando ya Moabi, na libongo ya Yordani pene ya Jeriko.

64Kati na bango, moko te atikalaki na bomoi, kati na ba-oyo Moyize mpe Nganga-Nzambe Aron batangaki, tango batangaki bana ya Isalaele kati na esobe ya Sinai.

65Pamba te Yawe alobaki na bana ya Isalaele wana ete bakokufa solo na esobe, mpe moko te kati na bango longola kaka Kalebi, mwana mobali ya Yefune, mpe Jozue, mwana mobali ya Nuni.

← Mitango 25 Mitango Mitango 27 →