1Nzokande, tango Balami amonaki ete Yawe azalaki kaka na esengo ya kopambola Isalaele, alukaki lisusu bimoniseli te ndenge azalaki kosala na bambala mosusu, kasi abalolaki elongi na ye na esobe.
2Tango Balami atalaki, amonaki Isalaele bavanda na milako na bango, bato na bato na libota na bango. Molimo na Nzambe ayaki likolo na ye ;
3mpe akomaki koloba maloba oyo :
4maloba ya moto oyo ayokaka maloba ya Nzambe,
5‹ Oh Jakobi, tala ndenge bandako na yo ya kapo ezali kitoko,
6Epanzana lokola miluka ya mike-mike,
7Mayi ekotiola wuta na bibombelo na bango,
8Nzambe abimisaki bango na Ejipito,
9Bagunzamaka mpe balalaka lokola nkosi ya mobali,
10Balaki atombokelaki Balami makasi. Abetaki maboko na ye mpe alobaki :
11Yango wana, longwa na miso na ngai mpe zonga na mboka na yo ! Nalobaki ete nakopesa yo lifuti ya malamu, kasi Yawe azangisi yo lifuti yango.
12Balami azongiselaki Balaki :
13« Ata soki Balaki apesi ngai palata mpe wolo oyo etondi na ndako na ye, nakosala eloko moko te na mokano na ngai moko, ezala ya malamu to ya mabe, mpo ete nakende libanda ya mitindo na Yawe te. Nasala kaka oyo Yawe alobi. »
14Mpe sik’oyo, nazali kozonga na ngai epai ya bato na ngai ; kasi yaka, nakokebisa yo na tina na makambo oyo bato oyo bakosala bato na yo na mikolo ekoya.
15Bongo Balami alobaki maloba oyo :
16oyo ayokaka maloba na Nzambe,
17‹ Namoni ye, kasi sik’oyo te ;
18Bakobotola mokili ya Edomi,
19Mokonzi moko akobima wuta na Jakobi,
20Balami amonaki Amaleki mpe alobaki maloba oyo :
21Sima, amonaki bato ya Keni mpe alobaki maloba oyo :
22kasi bino bato ya Keni, bokobebisama
23Mpe na suka, alobaki maloba oyo :
24Bamasuwa ekoya wuta na mabongo ya Kitimi,
25Bongo Balami atelemaki mpe azongaki epai na ye, Balaki mpe akendeki na nzela na ye.