1Miriami mpe Aron bazalaki kotonga Moyize likolo ya mwasi na ye, pamba te abalaki mwasi ya mokili ya Kushi.
2Balobaki :
3Nzokande Moyize azalaki moto ya komikitisa makasi koleka bato nyonso ya mokili.
4Mbala moko, Yawe alobaki na Moyize, Aron mpe Miriami :
5Yawe akitaki na likonzi ya lipata, atelemaki na ekuke ya Ndako ya kapo mpe abengaki Aron mpe Miriami. Tango bango mibale batelemaki liboso,
6alobaki :
7Kasi ezalaka bongo te
8Nasololaka na ye elongi na elongi,
9Bongo Yawe apeliselaki bango kanda na Ye mpe atikaki bango.
10Tango kaka lipata elongwaki likolo ya Ndako ya kapo, bokono ya maba ezwaki mbala moko Miriami : ezalaki pembe lokola mvula ya pembe. Aron abalukaki mpo na kotala Miriami mpe amonaki ete azwi bokono ya maba.
11Bongo Aron alobaki na Moyize :
12Kotika te ete Miriami azala lokola mwana oyo abotami ya kokufa, oyo abimi na libumu ya mama na ye na ndambo ya nzoto ya kopola !
13Boye, Moyize abelelaki Yawe :
14Yawe azongiselaki Moyize :
15Boye batiaki Miriami libanda ya molako mikolo sambo mpe bato bazalaki kotambola te kino tango Miriami azongaki.
16Sima na yango, bato batikaki Atseroti mpe bakendeki kotonga molako na bango na esobe ya Parani.