We Believe JesusFé, Esperança e Nova Vida

Ba-Ebre 1

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi · limburguês

Ba-Ebre Ba-Ebre 2 →

1Na tango ya kala, Nzambe azalaki koloba, mbala mingi mpe na lolenge ebele, epai ya bakoko na biso, na nzela ya basakoli.

2Kasi sik’oyo, na mikolo oyo ezali ya suka, Nzambe azali koloba na biso na nzela ya Mwana na Ye, oyo Ye moko Nzambe akomisaki Mokitani ya biloko nyonso. Ezali mpe na nzela na Ye nde Nzambe asalaki mokili.

3Mwana yango amonisaka kongenga ya nkembo ya Nzambe, azali elilingi oyo etalisaka mobimba ya Nzambe mpe asimbi biloko nyonso na nguya ya Liloba na Ye. Sima na Ye kopetola masumu ya bato, avandi kati na Likolo, na ngambo ya loboko ya mobali ya Nzambe-Na-Nguya-Nyonso,

4mpe azwi esika ya lokumu penza koleka ba-anjelu mpo ete azwi Kombo oyo eleki bakombo ya ba-anjelu.

5Epai ya anjelu nini penza Nzambe aloba :

6Mpe lisusu, tango Nzambe atindaki Mwana na Ye ya liboso kati na mokili, epai ya nani aloba :

7Nzokande, tala makambo oyo Nzambe aloba na tina na ba-anjelu :

8Mpe tala makambo oyo aloba na tina na Mwana :

9Olingaka bosembo mpe oyinaka mabe ;

10Kaka na tina na mwana, alobaki lisusu :

11Nyonso wana ekobeba,

12Okolinga yango lokola kazaka,

13Mpe lisusu, epai ya anjelu nini Nzambe aloba :

14Nzokande, ba-anjelu nyonso bazali milimo oyo esalaka mpo na Nzambe, mpe Nzambe atindaka bango kokokisa lotomo na bango mpo na bolamu ya bato oyo bakozwa lobiko.

Ba-Ebre Ba-Ebre 2 →