We Believe JesusFé, Esperança e Nova Vida

Matayo 9

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi · limburguês

← Matayo 8 Matayo Matayo 10 →

1Yesu amataki na bwato, akatisaki ebale mpe akendeki na engumba na Ye.

2Bamemelaki Ye ebosono moko alala na tsipoyi. Tango Yesu amonaki kondima na bango, alobaki na ebosono yango :

3Mpo na yango, ndambo ya balakisi ya Mobeko bakomaki kolobaloba na se ya mitema :

4Lokola Yesu asosolaki makanisi na bango, atunaki bango :

5Likambo nini eleki pete mpo na koloba : « Masumu na yo elimbisami to telema mpe tambola ? »

6Ezali mpo boyeba ete Mwana na Moto azali na bokonzi ya kolimbisa masumu kati na mokili.

7Moto yango atelemaki mpe akendeki na ndako na ye.

8Tango ebele ya bato bamonaki bongo, batondaki na somo mpe bakomaki kokumisa Nzambe oyo apesi bokonzi ya ndenge wana epai ya bato.

9Wana Yesu alongwaki na esika yango mpe azalaki kokende, amonaki mobali moko avandi na ndako na ye ya mosala epai wapi bafutaka mpako ; kombo na ye ezalaki « Matayo. » Yesu alobaki na ye : « Landa Ngai. » Boye Matayo atelemaki mpe alandaki Yesu.

10Wana Yesu azalaki kolia kati na ndako ya Matayo, bafutisi mpako ebele mpe bato mosusu ya masumu bayaki mpe baliaki mesa moko na Yesu elongo na bayekoli na Ye.

11Tango Bafarizeo bamonaki bongo, batunaki bayekoli ya Yesu :

12Kasi lokola Yesu ayokaki Bafarizeo koloba bongo, alobaki na bango :

13Bokende koyekola tina ya maloba oyo : « Nasepelaka na motema ya boboto koleka mbeka, » pamba te nayaki te koluka bato ya sembo, kasi bato ya masumu.

14Bongo bayekoli ya Yoane bayaki mpe batunaki Yesu :

15Yesu azongiselaki bango :

16Moto moko te asalelaka eteni ya elamba ya sika mpo na kobamba elamba ya kala, noki te eteni ya elamba ya sika ekopasola elamba ya kala, mpe ekosala lidusu monene koleka.

17Ezali mpe ndenge moko mpo na vino ya sika : batiaka yango te kati na bambeki ya kala, noki te bambeki ekopasuka, vino ekosopana mpe bambeki ekobeba libela. Nzokande, batiaka kaka vino ya sika kati na bambeki ya sika ; na bongo, vino mpe bambeki ekobatelama malamu.

18Wana Yesu azalaki koloba na bango, mokambi moko ayaki ; agumbamaki liboso ya Yesu mpe alobaki na Ye :

19Yesu atelemaki mpe, elongo na bayekoli na Ye, alandaki mokambi yango.

20Na tango yango kaka, ezalaki na mwasi moko oyo azalaki na bokono ya kotanga makila, mpe bokono yango ewumelaki mibu pene zomi na mibale. Mwasi yango ayaki na sima ya Yesu mpe asimbaki singa ya songe ya elamba na Ye,

21pamba te azalaki komilobela :

22Yesu atalaki na sima mpe amonaki ye ; alobaki :

23Tango Yesu akomaki na ndako ya mokambi ya ndako ya mayangani, amonaki babeti flite mpe bato ebele bazali kotia makelele.

24Alobaki na bango :

25Mpe sima na bango kobima libanda, Yesu akotaki na shambre, asimbaki elenge mwasi na loboko, mpe elenge mwasi yango alamukaki.

26Sango ya likambo yango epanzanaki na etuka wana mobimba.

27Tango Yesu alongwaki wana, bakufi miso mibale balandaki Ye na koganga :

28Tango Yesu akomaki na ndako, bakufi miso bapusanaki pene na Ye. Atunaki bango :

29Bongo asimbaki miso na bango mpe alobaki :

30Mpe mbala moko, bakomaki komona. Bongo Yesu akebisaki bango :

31Kasi bango, tango kaka babimi, bakomaki kopanza sango na Ye kati na etuka wana mobimba.

32Wana bato wana mibale bazalaki kobima, bamemelaki Yesu moto moko oyo azalaki na se ya bokonzi ya molimo mabe mpe azalaki koloba te.

33Yesu abenganaki molimo mabe yango, mpe moto oyo azalaki koloba te akomaki koloba. Ebele ya bato bakamwaki mpe balobaki :

34Kasi Bafarizeo bazalaki koloba :

35Yesu azalaki kotambola na bamboka mpe na bingumba nyonso, azalaki koteya kati na bandako na bango ya mayangani mpe kosakola Sango Malamu ya Bokonzi ; azalaki kobikisa bato na bokono mpe na pasi ya ndenge na ndenge.

36Tango Yesu amonaki ngulupa ebele ya bato, ayokelaki bango mawa, pamba te mitema na bango ebukanaki, mpe balembaki makasi lokola bameme oyo ezangi mobateli.

37Yesu alobaki na bayekoli na Ye : « Elanga ezali monene, kasi basali bazali moke !

38Yango wana, bosenga na Nkolo elanga ete atinda basali kati na elanga na Ye. »

← Matayo 8 Matayo Matayo 10 →