We Believe JesusFé, Esperança e Nova Vida

Matayo 26

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi · limburguês

← Matayo 25 Matayo Matayo 27 →

1Tango Yesu asilisaki koloba makambo wana nyonso, ayebisaki bayekoli na Ye :

2« Boyebi malamu ete etikali mikolo mibale mpo ete feti ya Pasika ebanda, mpe ete ezali na tango wana nde bakokaba Mwana na Moto mpo ete babaka Ye na ekulusu. »

3Boye, bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe bakambi ya bato basanganaki kati na ndako ya Kayifa, mokonzi ya Banganga-Nzambe ;

4bayokanaki kosalela mayele mabe mpo na kokanga Yesu mpe koboma Ye.

5Kasi balobaki : « Tosala yango te na tango ya feti, noki te bato bakotomboka. »

6Lokola Yesu azalaki na Betani, na ndako ya Simona oyo azalaki moto na maba,

7mwasi moko apusanaki pene na Ye. Na maboko na ye, azalaki na molangi ya alibatre etonda na malasi ya motuya makasi. Wana Yesu azalaki na mesa, mwasi yango asopaki malasi yango na moto ya Yesu.

8Tango bayekoli bamonaki bongo, basilikaki mpe balobaki :

9Bakokaki ata koteka yango na motuya makasi mpe kopesa mbongo epai ya babola !

10Tango Yesu amonaki bongo, alobaki na bango :

11Bokozalaka na babola tango nyonso ; kasi Ngai, bokozalaka na Ngai tango nyonso te.

12Wana asopi malasi oyo na nzoto na Ngai, asali yango mpo na kobongisa kokundama na Ngai.

13Nazali koloba na bino penza ya solo : esika nyonso bakosakola Sango Malamu oyo kati na mokili mobimba, bakobanda mpe kolobela likambo mwasi oyo awuti kosala, mpo na kokanisa ye.

14Moko kati na bantoma zomi na mibale, oyo kombo na ye ezalaki Yuda Isikarioti, akendeki epai ya bakonzi ya Banganga-Nzambe

15mpe atunaki bango :

16Banda na tango wana, Yuda akomaki koluka libaku malamu ya kokaba Yesu.

17Na mokolo ya liboso ya feti ya Mapa ezanga levire, bayekoli bayaki kotuna Yesu :

18Azongiselaki bango :

19Bayekoli basalaki ndenge Yesu atindaki bango mpe babongisaki bilei ya Pasika.

20Tango pokwa ekomaki, Yesu avandaki na mesa elongo na bayekoli zomi na mibale.

21Wana bazalaki kolia, Yesu alobaki :

22Bayokaki mawa mingi, mpe bakomaki kotuna Ye, moko sima na moninga :

23Yesu azongisaki :

24Solo, Mwana na Moto akokende, kolanda ndenge ekomama na tina na Ye ; kasi mawa na moto oyo akoteka Mwana na Moto ! Elingaki kozala malamu koleka mpo na moto yango ete abotama te.

25Yuda, ye oyo asengeli koteka Ye, alobaki :

26Wana bazalaki kolia, Yesu azwaki lipa ; sima na Ye kozongisa matondi epai ya Nzambe, akataki yango mpe apesaki yango na bayekoli na koloba :

27Azwaki lisusu kopo ; mpe sima na Ye kozongisa matondi epai ya Nzambe, apesaki bango yango na koloba :

28ezali makila na Ngai ya Boyokani, makila oyo esopani mpo na bato ebele, mpo ete masumu na bango elimbisama.

29Nazali koloba na bino penza ya solo : kobanda sik’oyo, nakomela lisusu vino oyo te kino na mokolo oyo nakomela yango, ya sika, elongo na bino, kati na Bokonzi ya Tata na Ngai.

30Sima na yango, bayembaki banzembo ; bongo babimaki mpo na kokende na ngomba ya banzete ya olive.

31Yesu alobaki na bango :

32Kasi, sima na Ngai kosekwa, nakokende na Galile, liboso na bino.

33Petelo alobaki :

34Yesu azongiselaki ye :

35Petelo alobaki na Ye :

36Elongo na bayekoli na Ye, Yesu akomaki na esika oyo babengaka Getisemane mpe alobaki na bango :

37Wana amemaki Petelo mpe bana mibali mibale ya Zebede, akomaki mawa-mawa mpe komitungisa ;

38alobaki na bango :

39Akendeki mwa mosika, amikitisaki elongi kino na mabele mpe asambelaki boye :

40Bongo azongaki epai bayekoli na Ye bazalaki mpe akutaki bango balala pongi ; alobaki na Petelo :

41Bosenzela mpe bosambela mpo ete bokweya te kati na komekama. Molimo ezalaka na posa makasi ya kosala malamu, kasi nzoto ezalaka na bolembu.

42Akendeki lisusu mwa mosika, na mbala ya mibale, mpe abondelaki :

43Azongaki lisusu epai bayekoli na Ye bazalaki mpe akutaki bango lisusu balala pongi, pamba te bayokaki pongi makasi mpe miso na bango ekomaki kilo.

44Boye, atikaki bango mpe akendeki lisusu mosika ; mpe, mpo na mbala ya misato, abondelaki na maloba kaka wana.

45Azongaki lisusu epai bayekoli na Ye bazalaki, mpe alobaki na bango :

46Botelema ; tokende. Moto oyo ateki Ngai azali koya.

47Wana Yesu azalaki nanu koloba, Yuda, moko kati na bayekoli zomi na mibale, akomaki elongo na bato ebele oyo basimbaki mipanga mpe banzete ; ezalaki bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe bakambi ya bato nde batindaki bango.

48Moto oyo atekaki Yesu apesaki bango elembo moko ; alobaki na bango : « Moto oyo ngai nakopesa beze, ezali nde ye ; bokanga ye. »

49Mbala moko, apusanaki pene ya Yesu mpe alobaki na Ye :

50Yesu alobaki na ye :

51Moko kati na baninga ya Yesu asembolaki loboko, abimisaki mopanga na ye wuta na ebombelo na yango, abetaki yango mosali ya mokonzi ya Banganga-Nzambe mpe akataki ye litoyi.

52Kasi Yesu alobaki na ye :

53Okanisi ete nakoki te kobenga Tata na Ngai, oyo akoki mpe mbala moko kotinda ba-anjelu koleka bankoto zomi mpo na koya kosunga Ngai ?

54Nzokande, soki mpe esalemi ndenge wana, Makomi ekokokisama te ; pamba te ezali koloba ete makambo nyonso wana esengeli kosalema bongo.

55Kaka na ngonga yango, Yesu alobaki na ebele ya bato :

56Kasi makambo oyo nyonso esalemi mpo ete Makomi ya basakoli ekokisama.

57Bato oyo bakangaki Yesu bamemaki Ye liboso ya Kayifa, mokonzi ya Banganga-Nzambe, epai wapi balakisi ya Mobeko mpe bakambi ya bato basanganaki.

58Petelo azalaki kolanda Yesu na mosika, kino na ndako ya mokonzi ya Banganga-Nzambe ; akotaki kati na lopango mpe avandaki elongo na bakengeli mpo na kotala ndenge makambo ekosuka.

59Nzokande bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe bato nyonso ya Likita-Monene ya Bayuda bazalaki koluka litatoli moko oyo ekobimisa polele mabe ya Yesu mpo ete bakoka kokatela Ye etumbu ya kufa,

60kasi bazwaki yango te, atako bato mingi bakendeki mpo na kokosela Ye makambo.

61mpe balobaki :

62Mokonzi ya Banganga-Nzambe atelemaki mpe atunaki Yesu :

63Kasi Yesu abatelaki kimia.

64Yesu azongiselaki ye :

65Mokonzi ya Banganga-Nzambe apasolaki bilamba na ye mpe alobaki :

66Bokanisi nini mpo na yango ?

67Babwakelaki Ye soyi na elongi mpe babetaki Ye makofi ; bato mosusu babetaki Ye bambata

68mpe balobaki :

69Na tango wana, Petelo avandaki libanda, kati na lopango ya kati. Mwasi mosali moko apusanaki pene na ye mpe alobaki :

70Kasi Petelo awanganaki na miso ya bato nyonso :

71Wana Petelo azalaki kokende na ekuke mpo na kobima, mwasi mosali mosusu amonaki ye mpe alobaki na bato oyo bazalaki wana :

72Petelo awanganaki yango lisusu na kolapa ndayi :

73Sima na mwa tango moke, bato oyo bazalaki wana bapusanaki mpe balobaki na Petelo :

74Bongo Petelo abandaki kolapa ndayi esangana na bilakeli mabe :

75Bongo Petelo akanisaki maloba ya Yesu : « Liboso ete soso elela, okowangana Ngai mbala misato. » Abimaki mpe alelaki makasi na libanda.

← Matayo 25 Matayo Matayo 27 →