We Believe JesusFé, Esperança e Nova Vida

Matayo 17

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi · limburguês

← Matayo 16 Matayo Matayo 18 →

1Sima na mikolo motoba, Yesu azwaki Petelo, Jake mpe Yoane, ndeko mobali ya Jake ; amemaki bango na pembeni, na likolo ya ngomba moko ya molayi.

2Yesu abongolamaki na miso na bango : elongi na Ye ekomaki kongenga lokola moyi, bilamba na Ye ekomaki pembe makasi lokola pole.

3Mbala moko, bamonaki Moyize mpe Eliya bazali kosolola na Yesu.

4Petelo alobaki na Yesu :

5Wana azalaki nanu koloba, lipata moko ezalaki kongenga lokola moyi, ezipaki bango, mpe mongongo moko eyokanaki wuta kati na lipata yango : « Oyo azali Mwana na Ngai ya bolingo, nasepelaka na Ye mingi ; boyoka Ye ! »

6Tango bayekoli bayokaki mongongo yango, bakweyaki bilongi kino na mabele mpo ete somo makasi ekangaki bango.

7Kasi Yesu apusanaki pene na bango, asimbaki bango mpe alobaki :

8Batombolaki miso mpe bamonaki moto mosusu te, kaka Yesu.

9Wana bazalaki kokita na ngomba, Yesu apesaki bango mitindo oyo :

10Bayekoli batunaki Yesu :

11Yesu azongisaki :

12Kasi Ngai, nazali koloba na bino ete Eliya asilaki koya ; kasi na esika ya koyeba ye, basalaki ye ndenge balingaki. Ezali mpe ndenge wana nde bakonyokola Mwana na Moto.

13Bayekoli basosolaki ete azalaki kolobela bango na tina na Yoane Mobatisi.

14Tango bakomaki pene ya esika oyo ebele ya bato bazalaki, moto moko apusanaki pene na Yesu, afukamaki liboso na Ye mpe alobaki :

15— Nkolo, yokela mwana na ngai ya mobali mawa ! Azali na maladi ya ndeke mpe azali penza komona pasi : akweyaka mbala mingi na moto to na mayi.

16Namemaki ye epai ya bayekoli na Yo, kasi bakoki te kobikisa ye.

17Yesu alobaki :

18Yesu abenganaki molimo mabe, mpe molimo mabe yango ebimaki kati na mwana. Kaka na tango yango, mwana abikaki.

19Bongo bayekoli bakendeki na nkuku epai ya Yesu mpe batunaki :

20Yesu azongiselaki bango :

21Kasi lolenge oyo ya milimo mabe ebimaka kaka na nzela ya mabondeli mpe ya kokila bilei.]17.21 Eteni oyo ezali te kati na mikanda mosusu ya kala.

22Mokolo moko, bayekoli basanganaki bango nyonso kati na Galile ; Yesu alobaki na bango :

23bakoboma Ye, mpe, na mokolo ya misato, akosekwa.

24Tango Yesu mpe bayekoli na Ye bakomaki na Kapernawumi, bafutisi mpako ya Ndako ya Nzambe bayaki epai ya Petelo mpe batunaki :

25Petelo azongisaki :

26Petelo azongisaki :

27Nzokande, mpo ete totia mobulu te kati na makanisi na bango, kende na ebale, bwaka ndobo na mayi mpe kamata mbisi oyo okozwa ya liboso ; fungola monoko na yango mpe okomona mbongo moko ya bibende kati na yango ; kamata mbongo yango mpe futa mpako na Ngai mpe mpako na yo, na maboko na bango.

← Matayo 16 Matayo Matayo 18 →