1Oh Yawe,
2Libula na biso ekeyi na maboko ya bapaya,
3Tokomi lokola bana bitike, tozangi tata ;
4Tosengeli kofuta mbongo ata mpo na mayi na biso ya komela
5Banguna na biso bazali kolanda biso,
6Tokomi ata kobondela bato ya Ejipito mpe ya Asiri
7Solo batata na biso basalaki masumu,
8Bawumbu bakomi kokonza biso,
9Tozali kozwa bilei na biso na motuya ya bomoi na biso,
10Poso ya nzoto na biso ekomi moto
11Basambwisi basi kati na Siona,
12Badiembiki bakalaka, na maboko na bango ;
13Bilenge mibali bazali komema libanga oyo banikelaka ble ;
14Bakambi batika kokende na ekuke ya engumba,
15Esengo ezalaka lisusu te kati na mitema na biso,
16Mitole ekweyi wuta na mito na biso.
17Soki mitema na biso ezali komona pasi
18ezali mpo ete ngomba Siona ebebisami,
19Oh Yawe, ozali Mokonzi seko na seko ;
20Mpo na nini obosana biso mpo na tango nyonso ?
21Oh Yawe, zongisa biso epai na Yo ;
22Boni, osundoli biso solo mpo na libela