1Tango Tibere Sezare akokisaki mibu zomi na mitano na bokonzi, Ponse Pilato azalaki moyangeli ya Yuda ; Erode azalaki moyangeli ya Galile ; Filipo, ndeko mobali ya Erode, azalaki moyangeli ya Itureya mpe ya Trakonitide ; mpe Lisaniasi azalaki moyangeli ya Abilene.
2Ana mpe Kayifa bazalaki bakonzi ya Banganga-Nzambe.
3Yoane akomaki kotambola na etuka mobimba, zingazinga ya moluka Yordani ; na mateya na ye, azalaki koloba : « Bobongola mitema na bino, bozwa libatisi, mpe Nzambe akolimbisa masumu na bino. »
4Boye nde ekokisamaki, makambo oyo mosakoli Ezayi akomaki kati na buku na ye :
5Mabwaku nyonso ekotondisama,
6mpe bato nyonso bakomona lobiko ya Nzambe. › »
7Yoane alobaki na ebele ya bato oyo bayaki epai na ye mpo ete abatisa bango : « Bana ya banyoka, nani alakisaki bino kokima kanda oyo ezali koya ?
8Bolakisa na nzela ya bizaleli ete bobongoli mitema, mpe bokoma te komilobela : ‹ Abrayami azali koko na biso ! › Pamba te, nazali koloba na bino penza ya solo ete Nzambe azali na makoki ya kobimisa, wuta na mabanga oyo, bakitani mpo na Abrayami.
9Epasola esili kobongisama mpo na kokata banzete wuta na misisa, mpe nzete nyonso oyo ebotaka bambuma ya malamu te ekokatama mpe ekobwakama na moto. »
10Ebele ya bato batunaki ye :
11Yoane azongiselaki bango :
12Bafutisi mpako mpe bayaki mpo ete babatisa bango ; batunaki Yoane :
13Azongiselaki bango :
14Basoda mpe batunaki ye :
15Lokola bato bazalaki kozela na elikya makasi, moko na moko azalaki komituna na se ya motema soki Yoane te nde azali Masiya.
16Yoane azongiselaki bango :
17Asimbi kiyungulu na loboko na Ye mpo na kopetola etando na Ye mpe mpo na koyamba ble kati na ebombelo na Ye ; kasi akotumba matiti oyo ekotikala na nzela ya moto oyo ekufaka te.
18Yoane azalaki lisusu kolendisa bato mpe koteya bango Sango Malamu na nzela ya maloba mosusu ebele.
19Kasi Yoane apamelaki mokonzi Erode mpo ete azwaki na libala Erodiade, mwasi ya ndeko na ye, mpe mpo ete asalaki lisusu mabe ebele.
20Na likolo ya mabe nyonso oyo Erode asalaki, abakisaki lisusu mabe ya kokanga Yoane kati na boloko.
21Wana bato nyonso bazalaki kokende kozwa libatisi, Yesu mpe azwaki libatisi. Mpe wana Yesu azalaki kosambela, Likolo efungwamaki,
22mpe Molimo Mosantu akitelaki Ye na lolenge ya nzoto, lokola ebenga.
23Yesu azalaki na mibu pene tuku misato ya mbotama tango abandaki mosala na Ye. Bato bazalaki kokanisa ete azali mwana mobali ya Jozefi ;
24Eli, mwana mobali ya Matati ;
25Jozefi, mwana mobali ya Matatiasi ; Matatiasi, mwana mobali ya Amosi ;
26Nagai, mwana mobali ya Maati ;
27Yoda, mwana mobali ya Yoanani ; Yoanani, mwana mobali ya Reza ;
28Neri, mwana mobali ya Meliki ;
29Eri, mwana mobali ya Jozue ; Jozue, mwana mobali ya Eliezeri ;
30Levi, mwana mobali ya Simeoni ;
31Eliakimi, mwana mobali ya Meleya ; Meleya, mwana mobali ya Mena ;
32Davidi, mwana mobali ya Izayi ;
33Nashoni, mwana mobali ya Aminadabi ; Aminadabi, mwana mobali ya Adimini ;
34Yuda, mwana mobali ya Jakobi ; Jakobi, mwana mobali ya Izaki ;
35Naori, mwana mobali ya Serugi ;
36Shela, mwana mobali ya Kayinami ; Kayinami, mwana mobali ya Aripakishadi ;
37Lemeki, mwana mobali ya Matusalemi ;
38Kenani, mwana mobali ya Enoshi ; Enoshi, mwana mobali ya Seti ;