1Yesu akotaki na engumba Jeriko, mpe azalaki kokatisa yango.
2Nzokande, ezalaki na moto moko kuna, kombo na ye « Zashe. » Azalaki mokonzi ya bafutisi mpako, mpe azalaki na bozwi ebele ;
3azalaki na posa ya komona soki Yesu azali nani, kasi lokola azalaki mokuse, akokaki te komona Ye mpo ete bato bazalaki ebele penza.
4Boye akimaki mbangu na liboso mpe amataki na nzete ya sikomori mpo na komona Yesu, pamba te Yesu akolekela na nzela wana.
5Tango Yesu akomaki na esika yango, atombolaki miso mpe alobaki na ye :
6Mbala moko, Zashe akitaki mpe ayambaki Yesu na esengo.
7Tango bato nyonso bamonaki bongo, bakomaki koyimayima ; bazalaki koloba :
8Kasi Zashe atelemaki mpe alobaki na Ye :
9Yesu alobaki na ye :
10Pamba te Mwana na Moto ayaki mpo na koluka mpe kobikisa bato oyo babunga.
11Wana bazalaki koyoka makambo yango, Yesu akobaki koloba lisese moko, pamba te akomaki pene ya Yelusalemi, mpe mpo ete bato bakanisaki ete Bokonzi ya Nzambe elingi komimonisa kaka na tango yango.
12Boye Yesu alobaki :
13Boye abengaki basali zomi kati na basali na ye mpe apesaki bango mbongo ya bibende zomi. Alobaki na bango : « Bosala mombongo na mbongo oyo kino tango nakozonga. »
14Kasi bandeko na ye, bana mboka, bazalaki kolinga ye te ; batindaki ndambo ya bato, sima na ye, mpo na koloba : « Toboyi ete moto oyo akoma mokonzi na biso. »
15Sima na ye kozwa bokonzi, azongaki na ekolo na ye mpe abengaki basali epai ya banani apesaki mbongo mpo na koyeba soki bazwi mileki boni na mbongo na ye.
16Mosali ya liboso ayaki mpe alobaki : « Nkolo na ngai, mbongo na yo eboti mbongo ya bibende zomi lokola mileki. »
17Nkolo alobaki na ye : « Osali malamu ! Ozali mosali malamu ! Mpo ete ozalaki sembo na likambo ya moke, nakokomisa yo moyangeli ya bingumba zomi. »
18Mosali ya mibale ayaki mpe alobaki : « Nkolo na ngai, mbongo na yo eboti mbongo ya bibende mitano lokola mileki. »
19Nkolo na ye azongisaki : « Nakokomisa yo moyangeli ya bingumba mitano. »
20Mosali mosusu ayaki mpe alobaki : « Nkolo na ngai, tala mbongo na yo ! Nabombaki yango malamu kati na eteni ya elamba.
21Nazalaki kobanga yo, pamba te ozalaka moto ya matata : ozwaka biloko oyo obombaki te mpe obukaka bambuma ya nkona oyo olonaki te. »
22Nkolo na ye azongisaki : « Mosali mabe ! Nakopesa yo etumbu kolanda maloba na yo moko. Oyebaki ete nazali moto ya matata, ete nazwaka biloko oyo nabombaki te mpe nabukaka bambuma ya nkona oyo nalonaki te.
23Bongo mpo na nini obombaki te mbongo na ngai kati na ndako ya misolo ? Na bozongi na ngai, nalingaki kozwa yango elongo na mileki ? »
24Bongo nkolo alobaki na bato oyo bazalaki wana : « Bobotola ye mbongo yango mpe bopesa yango na moto oyo azali na mbongo ya bibende zomi. »
25Balobaki na ye : « Nkolo, azali na mbongo ya bibende zomi ! »
26Nkolo azongisaki : « Nazali koloba na bino : na moto oyo azali na eloko, bakopesa ye lisusu ; kasi na moto oyo azangi, bakobotola ye ata oyo azali na yango.
27Kasi banguna na ngai wana, oyo baboyaki ete nakoma mokonzi na bango, bomemela ngai bango awa mpe boboma bango na miso na ngai. »
28Sima na Yesu koloba bongo, alekaki liboso mpo na kokende na Yelusalemi.
29Wana akomaki pene ya Betifaje mpe Betani, na ngomba oyo babengaka « ngomba ya banzete ya olive, » atindaki bayekoli mibale kati na bayekoli na Ye ;
30alobaki na bango :
31Soki moto moko atuni bino : « Mpo na nini bozali kofungola yango ? »
32Bato oyo Yesu atindaki bakendeki mpe bamonaki yango ndenge kaka Yesu alobaki na bango.
33Wana bazalaki kofungola mwana yango ya ane, bankolo na yango batunaki bango :
34Bazongisaki :
35Bamemaki mwana yango ya ane epai ya Yesu, batandaki bilamba na bango na mokongo na yango, mpe Yesu avandaki na likolo na yango.
36Wana azalaki kokende, bato bazalaki kotanda bilamba na bango na nzela.
37Mpe tango akomaki pene ya Yelusalemi, na esika oyo nzela ekita na ngomba ya banzete ya olive, ebele ya bayekoli babandaki kokumisa Nzambe, na esengo nyonso mpe na mongongo makasi mpo na bikamwa nyonso oyo bamonaki.
38Bazalaki koloba :
39Ndambo ya Bafarizeo, kati na ebele ya bato, balobaki na Yesu :
40Yesu azongisaki :
41Lokola akomaki pene ya Yelusalemi mpe amonaki engumba, alelaki mpo na yango
42mpe alobaki :
43Mikolo ya pasi ekokomela yo, mikolo oyo banguna na yo bakotimola mabulu pembeni na yo, bakozingela yo mpe bakofinafina yo na bangambo nyonso ;
44bakobamba yo na mabele, yo mpe bato oyo bazali kati na lopango na yo, mpe bakotika ata libanga moko te na likolo ya libanga mosusu, pamba te oyebaki te tango oyo Nzambe ayaki epai na yo.
45Yesu akotaki kati na lopango ya Tempelo mpe abandaki kobengana bato oyo bazalaki koteka biloko kuna ; alobaki na bango :
46— Ekomama : « Ndako na Ngai ekozala Ndako ya losambo ; » kasi bino, bokomisaki yango penza nganda ya miyibi !
47Yesu azalaki koteya mikolo nyonso na Tempelo. Bakonzi ya Banganga-Nzambe, balakisi ya Mobeko mpe bakambi ya Bayuda bazalaki koluka koboma Ye ;
48kasi bazalaki kokoka te, pamba te bato nyonso bazalaki koyoka Yesu na bokebi.