We Believe JesusFé, Esperança e Nova Vida

Luka 17

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi · limburguês

← Luka 16 Luka Luka 18 →

1Yesu alobaki na bayekoli na Ye :

2Ekoleka malamu mpo na ye kokanga ye libanga monene ya enikelo, na kingo mpe kobwaka ye na ebale, na esika ya kotika ye kokweyisa na masumu moko kati na bana mike oyo.

3Bosala penza keba mpo na bolamu na bino !

4Mpe soki, na mokolo moko, asali yo mabe mbala sambo, mpe ayei epai na yo mbala sambo koloba na yo : « Nayoki mawa mpo na mabe na ngai, » limbisa ye !

5Bantoma balobaki na Nkolo :

6Nkolo azongisaki :

7Nani kati na bino, soki azali na mosali bilanga to na mobateli bibwele, akoloba na ye tango azongi wuta na bilanga : « Yaka noki, vanda na mesa mpo ete olia ? »

8Boni, akoloba na ye te : « Lambela ngai bilei, lata bilamba na yo ya mosala mpo na kotiela ngai biloko na mesa, kino nasilisa kolia mpe komela ; sima na yango nde yo mpe okoki kolia mpe komela ? »

9Boni, akozongisela mosali wana matondi mpo ete asali mosala oyo atindaki ye ?

10Ndenge moko mpe mpo na bino : soki bosali nyonso oyo batindi bino, boloba : « Tozali basali ya pamba, tokokisi kaka mokumba na biso. »

11Wana Yesu azalaki kokende na Yelusalemi, alekaki na mondelo kati na Samari mpe na Galile.

12Lokola azalaki kokota na mboka moko, bato na maba zomi bayaki kokutana na Ye ; batelemaki na mosika

13mpe babandaki kobelela Ye na mongongo makasi :

14Tango Yesu amonaki bango, alobaki :

15Tango moko kati na bango amonaki ete abiki na bokono na ye, azongaki na kokumisa Nzambe na mongongo makasi.

16Afukamaki na makolo ya Yesu, elongi kino na se, mpe azongiselaki Ye matondi. Moto yango azalaki moto ya Samari.

17Bongo Yesu atunaki :

18Moko te azongi mpo na kopesa Nzambe nkembo, longola kaka mopaya oyo ?

19Bongo alobaki na moto yango ya Samari :

20Mokolo moko, Bafarizeo batunaki Yesu :

21Bakoloba te : « Ezali awa » to « Ezali kuna, » pamba te Bokonzi ya Nzambe ezali kati na bino.

22Bongo alobaki na bayekoli na Ye :

23Bakoloba na bino : « Azali awa ! » to « Azali kuna ! » Bolanda bango te !

24Pamba te, na mokolo na Ye, Mwana na Moto akozala lokola mokalikali oyo epeli mpe engengisi likolo longwa na este kino na weste.

25Kasi liboso ete mokolo yango ekoma, asengeli komona pasi mingi, mpe bato ya ekeke oyo basengeli koboya Ye.

26Ndenge esalemaki na tango ya Noa, ndenge wana mpe ekosalema na tango ya Mwana na Moto :

27bato bazalaki kolia, komela, kobala mpe kobalisa, kino na mokolo oyo Noa akotaki na masuwa ; bongo mpela eyaki mpe ebomaki bango nyonso.

28Ezalaki mpe bongo na tango ya Loti : bato bazalaki kolia, komela, kosomba, koteka, kolona mpe kotonga.

29Kasi na mokolo oyo Loti abimaki wuta na Sodome, mvula ya moto mpe ya fofolo ekitaki wuta na likolo mpe ebomaki bango nyonso.

30Ekozala mpe bongo, na mokolo oyo Mwana na Moto akomonana.

31Na mokolo yango, moto oyo akozala na likolo ya ndako na ye asengeli te kokita mpo na kozwa biloko kati na ndako na ye, mpe moto oyo akozala kati na bilanga na ye asengeli te kozonga na ndako mpo na likambo songolo.

32Bokanisa makambo oyo ekomelaki mwasi ya Loti !

33Moto oyo akoluka kobatela bomoi na ye akobungisa yango, mpe moto oyo akobungisa bomoi na ye akobatela yango.

34Nazali koloba na bino : na butu wana, bato mibale bakozala na likolo ya mbeto moko : moko akokamatama, mpe mosusu akotikala ;

35basi mibale bakozala konika bambuma elongo : moko akokamatama, mpe mosusu akotikala ; [

36mibali mibale bakozala kati na elanga moko : moko akokamatama, mpe mosusu akotikala.]17.36 Eteni oyo ezali te kati na mikanda mosusu

37Bayekoli batunaki Yesu :

← Luka 16 Luka Luka 18 →