1Elifazi, moto ya Temani, azwaki maloba mpe alobaki :
2« Boni, litomba nini Nzambe akoki kozwa epai ya moto ?
3Ezala soki ozali moyengebene,
4Boni, okanisi ete ezali mpo na boyengebene na yo
5Mabe na yo ezali monene te ?
6Ozalaki koluka na pamba ndanga
7ozalaki kopesa mayi te na moto oyo azalaki na posa ya mayi,
8atako ozalaki moto monene, nkolo mabele,
9ozalaki kozongisa basi bakufisa mibali maboko pamba,
10Yango wana, mitambo ezingeli yo,
11molili makasi ezwi yo mpe ozali kokoka komona te,
12Boni, Nzambe azali te kuna na likolo, kati na Lola ?
13Nzokande, ozali koloba : ‹ Nzambe ayebi nini ?
14Mapata minene ezipi Ye,
15Olingi solo kotikala kaka na nzela ya kala,
16Kufa ememaki bango na mbalakata,
17Bazalaki koloba na Nzambe : ‹ Tika biso, biso moko !
18Nzokande, Ye nde atondisaki bandako na bango
19Bato ya sembo bazali komona kobebisama na bango
20‹ Solo, banguna na biso babebi,
21Zongisa boyokani na yo elongo na Ye mpe luka kimia.
22Ndima malako oyo ekowuta na monoko na Ye,
23Soki ozongi epai na Nkolo-Na-Nguya-Nyonso,
24Bwaka wolo na yo kati na putulu,
25bongo Nkolo-Na-Nguya-Nyonso akozala wolo na yo,
26Solo, okozwa esengo epai ya Nkolo-Na-Nguya-Nyonso
27Okosambela Ye, Ye akoyoka yo,
28Makambo oyo okokana, ekosalema,
29Soki bato balembi, mpe yo olobi : ‹ Telema ! ›
30akokangola ata moto oyo asali mabe,