We Believe JesusFé, Esperança e Nova Vida

Jozue 12

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi · limburguês

← Jozue 11 Jozue Jozue 13 →

1Tala bakonzi ya mokili, oyo bana ya Isalaele balongaki mpe oyo babotolaki mokili na bango na ngambo ya este ya Yordani, wuta na moluka ya Arinoni kino na ngomba Erimoni, elongo na ngambo nyonso ya este ya Araba :

2Sikoni, mokonzi ya bato ya Amori, azalaki kovanda na Eshiboni.

3Azalaki mpe lisusu kokonza ngambo ya este ya Araba, wuta na Ebale monene ya Kinereti kino na Ebale monene ya Araba (ebale monene ya Barozo), na ngambo ya este, na nzela ya Beti-Yeshimoti mpe na ebandeli ya ngomba Pisiga, na ngambo ya sude.

4Ogi, mokonzi ya Bashani, moko kati na bakitani ya suka ya Refayimi, oyo azalaki kovanda na Ashitaroti mpe na Edreyi.

5Azalaki kokonza na ngomba Erimoni, na Salika mpe na Bashani mobimba kino na bandelo ya bato ya Geshuri mpe ya bato ya Maakati, mpe kino na ndambo ya mokili ya Galadi oyo ezalaki na mondelo ya mokili ya Sikoni, mokonzi na Eshiboni.

6Moyize, mosali na Yawe, elongo na bana ya Isalaele balongaki bango. Boye, Moyize, mowumbu na Yawe, apesaki mokili na bango lokola libula, epai ya bato ya libota ya Ribeni, ya Gadi mpe ya ndambo ya libota ya Manase.

7Tala molongo ya bakonzi ya mokili oyo Jozue mpe bana ya Isalaele babotolaki na ngambo ya weste ya Yordani, wuta na Bala-Gadi, na lubwaku ya Libani kino na ngomba Alaki oyo ezalaki na ngambo ya Seiri. Jozue apesaki bamboka na bango lokola libula, epai ya bana ya Isalaele kolanda mabota na bango

8kati na mokili ya bangomba, na mokili ya se, na Araba, kokita na esobe mpe na Negevi, mikili ya bato ya Iti, ya Amori, ya Kanana, ya Perizi, ya Evi mpe ya Yebusi.

9mokonzi ya Jeriko

10mokonzi ya Yelusalemi

11mokonzi ya Yarimuti

12mokonzi ya Egiloni

13mokonzi ya Debiri

14mokonzi ya Orima

15mokonzi ya Libina

16mokonzi ya Makeda

17mokonzi ya Tapua

18mokonzi ya Afeki

19mokonzi ya Madoni

20mokonzi ya Shimironi-Meroni

21mokonzi ya Taanaki

22mokonzi ya Kedeshi

23mokonzi ya Dori, kati na lubwaku ya Dori

24mokonzi ya Tiritsa

← Jozue 11 Jozue Jozue 13 →