1Ah ! Soki nazalaki ata na ndako ya bapaya kati na esobe,
2« Babongisaka lolemo na bango
3« Tika ete moto na moto asala keba na moninga na ye
4Moninga azali kokosa moninga na ye,
5Mosala na bango se kokosa na kokosa ;
6Yango wana, tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi :
7Lolemo na bango ezali lokola likonga oyo ebomaka,
8Bongo na makambo ya boye,
9Nakosala matanga mpe nakolela
10« Nakokomisa Yelusalemi
11Nani azali penza na bwanya
12Yawe alobi : « Makambo oyo nyonso ekomeli bango mpo ete basundoli Mobeko na Ngai oyo natiaki liboso na bango, batosi Ngai te mpe basaleli malako na Ngai te.
13Nzokande, batiaki kaka mito makasi mpe bakobaki kolanda banzambe ya Bala oyo batata na bango balakisaki bango. »
14Yango wana, tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe ya Isalaele, alobi : « Tala, nakoleisa bato oyo matiti ya bololo mpe nakomelisa bango mayi ya ngenge.
15Nakopanza bango kati na bikolo oyo, ezala bango to bakoko na bango, batikalaki koyeba te ; nakolanda bango na mopanga kino nakosilisa koboma bango. »
16Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi :
17Tika ete baya noki mpo ete bayembela biso
18Kolela ya mawa ezali koyokana wuta na Siona :
19Eh basi, boyoka Liloba na Yawe !
20Kufa emati mpe ekoti
21Loba : « Tala liloba oyo Yawe alobi :
22Tala liloba oyo Yawe alobi :
23Kasi tika ete moto oyo alingi komikumisa amikumisa
24« Na mikolo ekoya, » elobi Yawe, « nakopesa etumbu na bato nyonso oyo bakatama ngenga kaka na nzoto, kasi na mitema te :
25bato ya Ejipito, ya Yuda, ya Edomi, ya Amoni, ya Moabi mpe bavandi nyonso ya esobe oyo bamikataka mandefu ; pamba te bato ya bikolo oyo nyonso bakatama ngenga te. Mpe ezala bana nyonso ya Isalaele oyo bakatama ngenga, bakatama yango kaka na bonzoto, kasi na mitema te. »