We Believe JesusFé, Esperança e Nova Vida

Jeremi 22

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi · limburguês

← Jeremi 21 Jeremi Jeremi 23 →

1Tala liloba oyo Yawe alobi na Jeremi : « Kende na ndako ya mokonzi ya Yuda mpe tatola maloba oyo :

2‹ Mokonzi ya Yuda, yo oyo ovandi na kiti ya bokonzi ya Davidi, yoka Liloba na Yawe ! Yo, bakalaka na yo mpe bato na yo : bino nyonso oyo bolekelaka na nzela ya bikuke oyo,

3tala liloba oyo Yawe alobi : Bosalela bosembo mpe bosolo ; bokangola wuta na maboko ya monyokoli moto oyo bazali konyokola ! Bonyokola te bapaya, bana bitike mpe basi bakufisa mibali ; bosala mpe bango mabe te. Bosopa te na esika oyo, makila ya bato oyo bayebi likambo te.

4Pamba te soki bosaleli na bokebi mibeko oyo, bakonzi oyo bakovanda na kiti ya bokonzi ya Davidi bakolekela na bikuke ya ndako oyo, na likolo ya bashar mpe ya mpunda, elongo na bakalaka mpe bato na bango.

5Kasi soki botosi mibeko oyo te, › elobi Yawe, ‹ nalapi ndayi na Kombo na Ngai ete ndako oyo ekobebisama. › »

6Pamba te, tala liloba oyo Yawe alobi na tina na ndako ya mokonzi ya Yuda :

7Nakotinda bato ete baya kobebisa yo,

8Bato bakowuta na bikolo ya ndenge na ndenge bakolekela na engumba oyo mpe bakotunana : ‹ Mpo na nini Yawe asali makambo ya boye na engumba monene oyo ? ›

9Mpe eyano ekozala : ‹ Ezali mpo ete babebisi boyokani oyo basalaki elongo na Yawe, Nzambe na bango, bafukamelaki mpe basalelaki banzambe ya bapaya. › »

10Bolela te mpo na kufa ya mokonzi

11Tala liloba oyo Yawe alobi mpo na Shalumi, mwana mobali ya Joziasi, mokonzi ya Yuda, oyo akitanaki na Joziasi, tata na ye, lokola mokonzi ya Yuda, kasi atikaki mboka na ye : « Akozonga lisusu te.

12Akokufa na esika oyo bakomema ye na bowumbu, akomona lisusu mokili oyo te. »

13« Mawa na moto oyo atongaka ndako na ye

14oyo alobaka : ‹ Nakotongisa ndako monene

15Okanisi ete kotondisa ndako na mabaya ya sedele

16Alongisaki babola mpe bato bakelela,

17« Kasi yo, miso mpe motema na yo elukaka kaka

18Yango wana, tala liloba oyo Yawe alobi mpo na Yeoyakimi, mwana mobali ya Joziasi, mokonzi ya Yuda :

19Bakokunda ye ndenge bakundaka ane,

20« Mata na Libani mpe ganga makasi !

21Nakebisaki yo tango ozalaki na kimia

22Mopepe ekomema bakambi na yo nyonso

23Yo oyo ovandaka na Libani,

24Na Kombo na Ngai, » elobi Yawe, « ata soki yo Konia, mwana mobali ya Yeoyakimi, mokonzi ya Yuda, ozalaki lokola lopete na mosapi ya loboko na Ngai ya mobali, nakolongola yo kaka.

25Nakokaba yo na maboko ya bato oyo bazali na posa ya koboma yo, mpe na maboko ya bato oyo obangaka, epai ya Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, elongo na bato ya Babiloni.

26Nakobengana yo elongo na mama oyo abota yo na mokili mosusu epai wapi moko te kati na bino abotama, mpe ekozala kuna nde bino mibale bokokufa.

27Bokotikala kozonga lisusu te na mokili oyo bozalaka na posa makasi ya kozonga. »

28Boni, moto oyo, Konia, azali te mbeki ya kopasuka

29Oh mokili na ngai, mokili na ngai, mokili na ngai !

30Tala liloba oyo Yawe alobi :

← Jeremi 21 Jeremi Jeremi 23 →