1Nganga-Nzambe Pashuri, mwana mobali ya Imeri, mokonzi ya Tempelo ya Yawe, ayokaki ndenge Jeremi azalaki kosakola.
2Nganga-Nzambe Pashuri abetisaki Mosakoli Jeremi fimbu mpe akangisaki ye na likonzi oyo ezalaki na ekuke ya likolo ya Benjame, ekuke oyo ememaka na Tempelo ya Yawe.
3Mokolo oyo elandaki, tango Pashuri alongolaki ye na likonzi, Jeremi alobaki na ye :
4Pamba te, tala liloba oyo Yawe alobi : « Nakotindela yo mpe balingami na yo nyonso makambo ya somo ; okomona na miso na yo ndenge nini bakokweya na mopanga liboso ya banguna na bango. Nakokaba Yuda nyonso na maboko ya mokonzi ya Babiloni oyo akomema bango na bowumbu, na Babiloni, to akoboma bango na mopanga.
5Nakokaba bozwi nyonso ya engumba oyo na maboko ya banguna na bango : biloko nyonso ya engumba, biloko ya talo mpe bomengo nyonso ya mokonzi ya Yuda ; bakokamata yango mpe bakomema yango na mokili ya Babiloni.
6Mpo na yo Pashuri mpe bavandi nyonso ya ndako na yo, bokokende na bowumbu na mokili ya Babiloni. Bokokufa mpe bakokunda bino kuna, ezala yo to balingami na yo nyonso oyo bosakolaki makambo ya lokuta epai na bango. »
7Eh Yawe, okosaki-kosaki ngai,
8Na tango nyonso oyo nalobaka,
9Kasi soki nalobi : « Nakotanga lisusu Kombo na Ye te, »
10Nazali koyoka bato ebele koloba na se se se :
11Kasi Yawe azali elongo na ngai
12Eh Yawe, Mokonzi ya mampinga,
13Boyembela Yawe ! Bokumisa Yawe !
14Tika ete mokolo ya mbotama na ngai elakelama mabe !
15Tika ete alakelama mabe,
16Tika ete moto yango akoma lokola bingumba
17Mpo na nini Nzambe abomaki ngai te
18Mpo na nini penza nabimaki