We Believe JesusFé, Esperança e Nova Vida

Jeremi 18

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi · limburguês

← Jeremi 17 Jeremi Jeremi 19 →

1Tala liloba oyo Yawe alobaki na Jeremi :

2— Kende na ndako ya mosali mbeki mpe, kuna, nakoyebisa yo makambo.

3Boye, nakendeki na ndako ya mosali mbeki mpe nakutaki ye azali kosala mosala na ye.

4Kasi mbeki oyo azalaki kosala na mabele oyo basalelaka bikeko ezalaki kokangama ye na maboko. Bongo, mosali mbeki yango asalaki mbeki mosusu wuta na mbeki oyo ebebaki, asalaki yango lisusu kitoko kolanda posa ya motema na ye.

5Mpe kuna, Yawe alobaki na ngai :

6— Oh bana ya Isalaele, nakoki kosala bino te ndenge mosali mbeki oyo azali kosala, elobi Yawe ? Bana ya Isalaele, bozali te kati na maboko na Ngai lokola mabele oyo basalelaka bikeko kati na maboko ya mosali mbeki ?

7Soki nazwi mokano ya kopikola, ya kokweyisa to ya kobebisa ekolo to mokili songolo,

8bongo ekolo to mokili oyo nakebisi etiki kosala mabe, nakobongola mokano oyo nasilaki kozwa mpo na yango mpe nakolongola pasi oyo nakanaki kotindela yango.

9To mpe lisusu, soki nazwi mokano ya kotonga to ya kolona ekolo to mokili pakala,

10bongo ekolo to mokili yango ekomi kosala mabe na miso na Ngai mpe eboyi koyokela Ngai, nakobongola mokano oyo nasilaki kozwa ya kosalela yango bolamu.

11Yango wana, yebisa sik’oyo bato ya Yuda mpe bavandi ya Yelusalemi : « Tala liloba oyo Yawe alobi : ‹ Tala, nasili kozwa mokano ya kotindela bino pasi, mpe nazali na mabongisi ya kosala bino mabe. Boye, tika ete moko na moko kati na bino atika nzela na ye ya mabe, abongola bizaleli mpe misala na ye. ›

12Kasi bakozongisa : ‹ Ezali na tina te ! Tokokoba kaka kosala mabongisi ya mitema na biso, mpe moko na moko kati na biso akokoba kaka kolanda baposa mabe ya motema na ye. › »

13Yango wana, tala liloba oyo Yawe alobi :

14Boni, bosila komona mvula ya pembe ya Libani

15Nzokande, bato na Ngai babosani Ngai,

16Mokili na bango ekotikala lisusu na bato te,

17Nakopanza bango liboso ya banguna na bango

18Bazalaki koloba : « Boya ! Tika ete tosalela Jeremi likita mpo na kosala ye mabe, pamba te ezala ndenge nini, Banganga-Nzambe bakosila te mpo na koteya Mobeko, bato ya bwanya bakosila te mpo na kopesa toli, mpe basakoli bakosila te mpo na kosakola Liloba na Yawe. Boya ! Tika ete toboma ye na nzela ya lolemo, mpe tolanda te makambo oyo azali koloba ! »

19Eh Yawe, yoka makambo oyo

20Boni, bazongisaka solo mabe na malamu ?

21Mpo na yango, boma bana na bango na nzala,

22Tika ete kolela eyokana wuta na bandako na bango

23Kasi Yo, Yawe, oyebi mabongisi nyonso

← Jeremi 17 Jeremi Jeremi 19 →