1Mokanda oyo ezali kolobela maloba ya Jeremi, mwana mobali ya Ilikia, moko kati na Banganga-Nzambe ya engumba Anatoti, kati na etuka ya Benjame ; ezali mpe kolobela makambo oyo ekomelaki ye.
2Yawe alobaki na ye tango mokonzi Joziasi, mwana mobali ya Amoni, mokonzi ya Yuda, akokisaki mibu zomi na misato na bokonzi,
3mpe na tango ya Yeoyakimi, mwana mobali ya Joziasi, mokonzi ya Yuda, kino na suka ya sanza ya mitano ya mobu ya zomi na moko ya bokonzi ya Sedesiasi, mwana mobali ya Joziasi, mokonzi ya Yuda, kino tango bato ya Yelusalemi bakendeki na bowumbu.
4Yawe alobaki na ngai :
5— Liboso ete nasala yo kati na libumu ya mama na yo, nayebaki yo ; liboso ete obotama, nabulisaki yo : naponaki yo mpo ete ozala mosakoli ya bikolo.
6Nazongisaki :
7Kasi Yawe alobaki na ngai :
8Kobanga bango te, pamba te nazali elongo na yo mpo na kobatela yo, —elobi Yawe.
9Bongo Yawe asembolaki loboko na Ye, asimbaki monoko na ngai mpe alobaki :
10Na mokolo ya lelo, yeba ete nasili kopesa yo bokonzi likolo ya bikolo mpe ya mikili mpo na kopikola mpe kopanza, kobuka mpe kokweyisa, kotonga mpe kolona.
11Sima na yango, Yawe atunaki ngai :
12Yawe alobaki na ngai :
13Yawe atunaki ngai lisusu :
14Yawe alobaki na ngai :
15Pamba te nakobengisa bato nyonso ya bituka ya nor, —elobi Yawe.
16Nakosambisa bato na Ngai mpo na mabe oyo basalaki :
17Mibongisa, yika mpiko !
18Na mokolo ya lelo, nakomisi yo engumba batonga makasi,
19Yeba ete bakobundisa yo, kasi bakolonga yo te ;