1Yawe alobaki na Yona, mwana mobali ya Amitayi :
2— Telema, kende na Ninive, engumba monene, mpe kebisa bato na yango, pamba te mabe na bango ekomi kino epai na ngai.
3Yona atelemaki. Kasi mpo na kokima mosika na Yawe, akendeki na Tarsisi, akitaki na libongo ya Jafa mpe akutaki kuna masuwa moko oyo ezalaki kokende na Tarsisi. Sima na ye kofuta mbongo mpo na mobembo, akotaki na masuwa yango mpo na kokende na Tarsisi, mosika na Yawe.
4Kasi Yawe atindaki mopepe makasi na likolo ya ebale monene, mpe mopepe yango ememaki mbonge oyo ekomaki pene ya kozindisa masuwa.
5Bato oyo basalaka na masuwa bakomaki kobanga, mpe moto na moto akomaki kobelela nzambe na ye ; babwakaki biloko nyonso oyo bazalaki na yango na ebale monene mpo na kokomisa masuwa pepele. Kasi Yona akitaki na kobe ya masuwa mpe, kuna, alalaki pongi ya makasi.
6Mokumbi masuwa apusanaki pene ya Yona mpe alobaki na ye :
7Bato oyo basalaka na masuwa bamilobelaki bango na bango : « Boya ! Tobeta zeke mpo toyeba moto oyo azali kobendela biso pasi oyo. »
8Batunaki ye :
9Yona azongisaki :
10Ayebisaki bango ete azali kokima mosika na Yawe. Boye bato yango babangaki makasi ; batunaki ye :
11Lokola ebale ezalaki kotomboka makasi penza, batunaki ye lisusu :
12Azongiselaki bango :
13Bato yango bamipesaki nanu na koluka nkayi, na makasi na bango nyonso, mpo na komema masuwa na mokili, kasi balongaki te, pamba te mopepe etelemelaki bango makasi.
14Bongo, babelelaki Yawe :
15Boye, bakamataki Yona mpe babwakaki ye na ebale monene ; mpe mbala moko, ebale monene oyo etombokaki makasi evandaki kimia.
16Babangaki mpe bayokaki somo makasi liboso ya Yawe ; babonzelaki Ye bambeka mpe bapesaki Ye bilaka.