1Oyebi tango nini bantaba ya ngomba ebotaka ?
2Osila kotanga basanza oyo ewumelaka na zemi ?
3Ekogumbama, ekobota bana na yango
4Bana na yango ekozwa makasi, ekokola na libanda,
5Nani akangoli ane ya zamba ?
6Ngai nde napesi yango esobe lokola ndako,
7Esekaka makelele ya bingumba
8Etambolaka na ngomba mpo na koluka bilei
9Mpakasa ekoki kondima kosalela yo ?
10Okoki kokanga mpakasa na singa ya ebende oyo ebalolaka mabele ?
11Okotia solo elikya na yo kati na yango,
12Okotiela yango solo motema mpo na komemela yo bambuma
13Mapapu ya maligbanga39.13 Maligbanga ezali ndeke monene ya esobe oyo epotaka mbangu makasi, bakilometele nkama moko na tuku mibale mpo na ngonga moko. Ebengami na lifalanse autriche. efungwamaka na esengo nyonso,
14Maligbanga ebwakaka maki na yango na mabele
15kasi ebosanaka ete lokolo ekoki kopanza yango
16Enyokolaka bana na yango makasi
17pamba te Nzambe apimeli yango bwanya
18Nzokande soki etelemi mpe ebandi kopota mbangu,
19Boni, yo nde moto opesa mpunda makasi
20Yo moto opumbwisaka yango lokola libanki ?
21Mpunda enyataka na makasi nyonso maboke ya mabele,
22Eyokaka somo te, ebangaka eloko moko te,
23tango saki ya mbanzi eninganaka likolo na yango
24Epumbwaka na kanda mpe epanzaka mabele,
25Soki kelelo ebeti, egangaka : ‹ Ah ! ›
26Boni, ezali na mayele na yo nde kombekombe epumbwaka
27Na mitindo na yo nde mpongo emataka likolo
28Evandaka mpe etongaka ndako kati na mabanga,
29Wuta na likolo, emonaka nyama ya kolia,
30Bana na yango emelaka makila.