1Yawe ayanolaki Yobo kati na mopepe makasi :
2« Nani azali kobebisa mabongisi na ngai
3Lata mokaba na yo lokola elombe mobali ;
4Ozalaki wapi tango ngai nasalaki mabele ?
5Nani akataki mondelo na yango, oyebi ye ?
6Makolo ya makonzi na yango evandi likolo ya nini ?
7tango minzoto ya tongo ezalaki koyemba elongo
8Nani akangaki ebale monene na bikuke ya makasi
9tango nakomisaki mapata elamba na yango,
10tango natielaki yango bandelo,
11tango nalobaki : ‹ Okosuka kino awa, kasi mosika te ;
12Boni, osili kopesa tongo mitindo
13mpo ete esimba bandelo ya mokili
14Mabele ebongwani lokola potopoto oyo batia kashe,
15Bazangisi bato mabe pole
16Osila kokoma kino na etima ya ebale monene ?
17Boni, basila kolakisa yo bikuke ya kufa ?
18Miso na yo esila komona kino na bitando monene ya mokili ?
19Wapi nzela oyo ememaka na pole ?
20mpo ete omema yango na bisika na yango
21Solo, oyebi yango malamu,
22Boni, osila kokoma na esika
23Nabombaki yango mpo na tango ya pasi
24Na nzela nini pole ebimaka
25Nani atimola nzela mpo na mvula makasi,
26mpo na konokisa mvula na esika oyo ezanga bato,
27mpo na kosopa mayi na bisika oyo ezanga bato mpe ekawuka,
28Boni, mvula ezali nde na tata ?
29Libumu ya nani ebotaki mayi ya libanga ?
30Tango nini mayi ekomaka libanga
31Okoki kokanga na singa Minzoto sambo esika moko
32Okoki kobimisa bilembo ya Zodiake38.32 Zodiake : na lifalanse ezali « Zodiaque ; » elakisi : liboke ya minzoto oyo emonanaka lokola bilembo na likolo mpo na kolakisa makambo oyo ekoya. na tango na yango
33Oyebi mibeko ya likolo ?
34Okoki kotombola mongongo na yo na mapata
35Okoki kotinda bakake ete ebima na banzela na yango
36Nani atia bwanya na motema ya moto
37Nani azali na bwanya mpo na kotanga mapata
38mpo ete putulu etiola elongo lokola ebende oyo enyangolami na moto
39Boni, yo nde okokoka koboma nyama mpo na nkosi ya mwasi
40tango elalaka kati na mabulu na yango
41Nani abongiselaka yanganga bilei