1Eliwu abakisaki lisusu :
2« Yokela ngai nanu moke, nalingi koteya yo,
3Tala, nazali kozwa mosika boyebi na ngai
4Yeba malamu ete maloba na ngai ezali ya lokuta te,
5Tala monene ya Nzambe !
6Atikaka moto mabe te kozala na bomoi,
7alongolaka miso na Ye te likolo ya bayengebene,
8Kasi soki bato bakangami na minyololo
9atalisaka bango mabe oyo basali,
10Afungolaka bango matoyi mpo na kokebisa bango
11Soki batosi mpe basaleli Ye,
12Kasi soki batosi Ye te, bakokufa na mopanga
13Bato oyo bayebi Nzambe te
14Bakufaka na bolenge,
15Kasi bato oyo bazali konyokwama,
16Yo mpe, Nzambe alekisi yo na nzela ya nkaka mpe ya pasi
17Kasi soki sik’oyo ozali kosala lokola moto mabe,
18Tika ete elakeli mabe oyo etelemeli yo
19Boni, bozwi na yo ezali solo na motuya
20Kozala na posa te ya butu oyo elongolaka bato
21Mibatela ete okweya na mabe te,
22Tala, Nzambe azali Mokonzi ya nguya na Ye,
23Nani akengelaka etamboli na Ye ?
24Kanisa kokumisa misala na Ye,
25Bato nyonso bamonaka yango,
26Tala ndenge nini Nzambe azali monene !
27Abendaka mayi epai na Ye, na mapata ;
28Mapata ekweyisaka yango,
29Nani akoki kososola ndenge Nzambe apanzaka mapata
30Tala ndenge abetisaka bakake likolo ya bato
31Na nzela ya biloko oyo nyonso,
32Atondisaka maboko na Ye mibale na mikalikali,
33Makelele ya bakake epesaka sango ya koya na Ye,