1Kasi sik’oyo, Yobo, yoka maloba na ngai,
2Tala, nafungoli monoko na ngai,
3Maloba na ngai ewuti na motema ya sembo,
4Molimo ya Nzambe asalaki ngai,
5Boye soki okoki, yanola ngai,
6Nazali kaka lokola yo liboso ya Nzambe ;
7Boye, somo na ngai ebangisa yo te,
8Kasi olobaki na matoyi na ngai—
9‹ Nazali sembo, nasali masumu te ;
10Nzokande, Nzambe amoni mbeba kati na ngai,
11Akangi makolo na ngai na bibende,
12Kasi, kati na nyonso oyo, ngai nalobi, ozali na elonga te,
13Mpo na nini ozali kosamba na Ye ?
14Nzokande, Nzambe alobaka, na lolenge moko to na lolenge mosusu,
15Alobaka kati na ndoto, kati na emoniseli ya butu,
16boye, akoki kofungola matoyi ya bato
17mpo na kotia moto mosika ya misala na ye ya mabe
18mpo na kobatela molimo na ye mpo ete ekufa te,
19Nzokande, moto akoki mpe, mbala mosusu, koteyama na mbeto na ye,
20Boye, azali kosepela lisusu na lipa te,
21Nzoto na ye ekawuki na pamba,
22Molimo na ye ezali kopusana pene ya kunda,
23Nzokande, soki ekoki kozala ata na anjelu moko,
24tika ete asalela ye ngolu mpe aloba :
25nzoto na ye ekokoma lisusu sembesembe
26Akosambela Nzambe,
27Boye akoyemba na miso ya bato mpe akoloba :
28Nzambe akangoli molimo na ngai na libulu ya kufa,
29Nzambe asalaka makambo oyo nyonso
30mpo na kolongola molimo na ye na libulu ya kufa,
31Yobo, fungola matoyi, vanda kimia mpe yoka ngai !
32Kasi soki ozali na likambo ya koloba,
33Soki te, vanda kimia mpe yoka ngai,