1Bato wana misato batikaki koyanola Yobo, pamba te azalaki komimona sembo na miso na ye moko.
2Kasi Eliwu, mwana mobali ya Barakeyeli, moto ya libota ya Buzi mpe ya etuka ya Rami, asilikelaki Yobo makasi, pamba te amimonaki sembo koleka Nzambe.
3Asilikelaki mpe baninga misato ya Yobo, pamba te balongaki te kopesa Yobo eyano oyo esengeli ; nzokande bakweyisaki Nzambe.
4Eliwu awelaki te koloba moto ya liboso epai ya Yobo, pamba te baninga wana misato ya Yobo bazalaki mikolo na ye na mibu ya mbotama.
5Kasi tango Eliwu amonaki ete bato wana misato bazali lisusu na likambo ya koloba te, asilikaki makasi.
6Boye Eliwu, mwana mobali ya Barakeyeli, moto ya libota ya Buzi, alobaki :
7Nazalaki komilobela :
8Nzokande, kati na moto, ezali nde molimo,
9Ezali kaka mibange te nde bazali na bwanya,
10Yango wana nalobi : Boyoka ngai,
11Tango bino bozalaki koloba, ngai nazalaki koloba te,
12Nalandaki bino na bokebi nyonso ;
13Boloba te : ‹ Tomoni bwanya ;
14Lokola Yobo alobaki maloba na ye epai na ngai te,
15Bayoki soni, batikali ata na liloba moko te ya koloba,
16Boni, nasengeli sik’oyo kozela,
17Ngai mpe nakoloba sik’oyo,
18Lokola maloba ebele etondi kati na ngai,
19Kati na ngai, nazali lokola mbeki ya vino oyo ezali kotoka,
20Nakoloba mpo ete motema na ngai ekita,
21Nakopona bilongi te, nakobondela mpe moto moko te ;
22pamba te, soki nayebaki kobondela bato,