1Yobo akobaki koloba :
2« Ah ! Soki nakokaki kozala lisusu
3tango mwinda na Ye ezalaki kongenga na moto na ngai,
4Ah ! Soki nakokaki kozala lisusu
5tango Nkolo-Na-Nguya-Nyonso azalaki nanu elongo na ngai
6tango nzela na ngai etondisamaki na miliki
7Tango nazalaki kokende na ekuke ya mboka
8bilenge bazalaki komona ngai mpe bazalaki kobombama,
9bakambi bazalaki kozanga maloba
10bato ya lokumu bazalaki kokitisa mingongo na bango
11Moto nyonso oyo azalaki koyoka ngai
12pamba te nazalaki kosunga babola
13Moto oyo akomaki pene ya kokufa azalaki kopambola ngai,
14Nazalaki kolata bosembo lokola elamba ;
15Nazalaki miso ya mokufi miso
16nazalaki tata ya moto oyo akelela,
17nabukaki mbanga ya moto mabe
18Nazalaki kokanisa : ‹ Nakokufa kati na ndako na ngai moko
19Misisa na ngai ekoluka mayi,
20Lokumu na ngai ekozongisela ngai esengo,
21Bato bazalaki koyoka ngai na bokebi,
22Sima na ngai koloba, bazalaki na liloba ya kozongisa te ;
23Bazalaki kozela ngai ndenge bazelaka mvula,
24Soki nasekisi bango, bazalaki kondima te ;
25Naponaki nzela mpo na bango