1Na tango wana, Ezekiasi abelaki bokono moko ya makasi, pene akufa. Mosakoli Ezayi, mwana mobali ya Amotsi, akendeki epai na ye mpe alobaki : « Tala liloba oyo Yawe alobi : Bongisa makambo ya ndako na yo, pamba te okokufa, okobika te. »
2Ezekiasi abalolaki elongi na ye na mir mpe abondelaki Yawe :
3« Oh Yawe, kanisa ndenge nini natambolaki liboso na Yo na boyengebene, ndenge nini namipesaki epai na Yo na motema na ngai mobimba mpe ndenge nini nasalaki makambo ya malamu na miso na Yo. »
4Bongo, Yawe alobaki na Ezayi :
5« Kende koloba na Ezekiasi : ‹ Yawe, Nzambe ya tata na yo, Davidi, alobi : ‘ Nayoki libondeli na yo mpe namoni mpinzoli na yo. Nakobakisa mibu zomi na mitano na mikolo ya bomoi na yo.
6Nakokangola yo elongo na engumba oyo, na maboko ya mokonzi ya Asiri, mpe nakobatela yango. ’
7Bongo, tala elembo ya Yawe, elembo oyo ekolakisa mpo na yo ete Yawe akokokisa makambo oyo asili kolaka :
8Nakozongisa sima, na badegre zomi, elili ya moyi oyo ekitaki na tango ya Akazi. › » Boye, moyi ezongaki sima, mpe ekitaki na badegre zomi.
9Tala loyembo oyo Ezekiasi, mokonzi ya Yuda, akomaki na mokanda tango abikaki na bokono.
10Nazalaki komilobela :
11Namilobelaki :
12Mikolo ya bomoi esili,
13Nakangaki motema kino na tongo ;
14Nazalaki koganga lokola mbilambila to ndeke ya mayi,
15Kasi naloba nini mpo ete ayanola ngai,
16Nkolo, bato babikaka mpo na bolamu na Yo ;
17Solo, pasi na ngai ebongwani esengo ;
18Pamba te mboka ya bakufi ekoki te kokumisa Yo,
19Bato na bomoi, bato ya bomoi kaka nde basanzolaka Yo
20Yawe, lokola obikisi ngai,
21Ezayi alobaki :
22Ezekiasi alobaki :