1Maloba na Yawe na tina na engumba ya Tiri :
2Bino bavandi ya esanga,
3Lifuti na ye ezalaki :
4Yoka soni, Sidoni, ndako batonga makasi ya ebale monene,
5Tango maloba yango ekokoma na Ejipito,
6Bokatisa na ngambo ya Tarsisi,
7Boni, oyo nde engumba na bino ya bisengo,
8Nani azwaki mokano oyo mpo na kobebisa Tiri ?
9Yawe, Mokonzi ya mampinga, nde azwaki mokano yango
10Oh Tarsisi, mboka kitoko,
11Yawe asembolaki loboko na Ye na ebale monene
12alobaki : « Okosepela lisusu te,
13Tala mokili ya bato ya Chalide,
14Bolela, bino bamasuwa ya Tarsisi !
15Na tango wana, bakobosana Tiri mibu tuku sambo kolanda molayi ya bomoi ya mokonzi moko. Kasi na suka ya mibu tuku sambo, ekosalema mpo na Tiri, makambo oyo baloba na nzembo oyo bayembelaka mwasi ya ndumba :
16« Kamata lindanda,
17Na sima na mibu tuku sambo, Yawe akosala mpo na Tiri oyo ekozongela lifuti na yango ya mbindo ; mpe ekozongela kosala kindumba elongo na bikolo nyonso ya mokili.
18Kasi lifuti mpe bomengo na yango ekobulisama mpo na Yawe ; bakobomba te yango kati na bibombelo. Bomengo na yango ekozala mpo na koleisa bato oyo batelemaka liboso ya Yawe mpe kolatisa bango bilamba ya kitoko.