1Moto ya nzete ekobima na mobimbi ya Izayi ;
2Molimo na Yawe akowumela na likolo na Ye :
3esengo na ye ekozala na kotosa Yawe.
4kasi akokata makambo ya bato bakelela na bosembo
5Bosembo ekozala mokaba na ye,
6Mbwa ya zamba ekovanda esika moko na mwana meme,
7Ngombe ya mwasi mpe ngombolo ekolia esika moko,
8Mwana moke akosakana pene ya lidusu ya nyoka,
9Mabe to kobebisama ekosalema lisusu te
10Na mokolo wana, bakitani ya Izayi bakotelema lokola bendele mpo na bikolo, bato ya bikolo ya bapaya bakoya noki epai na bango ; mpe esika na bango ya kopema ekozala na nkembo.
11Na mokolo wana, Nkolo akosembola loboko na Ye na mbala ya mibale mpo na kobikisa ndambo ya bato na Ye oyo babikaki wuta na Asiri, na Ejipito, na Patrosi, na Kushi, na Elami, na Shineari, na Amati mpe na bisanga ya ebale monene.
12Akotombola bendele mpo na bikolo
13Motema likunya ya Efrayimi ekosila,
14Bakosangela elongo bato ya mboka Filisitia
15Yawe akokawusa mayi ya eteni ya ebale
16Nzela moko ekosalema mpo na ndambo ya bato na Ye