We Believe JesusFé, Esperança e Nova Vida

Neyemi 7

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi · limburguês

← Neyemi 6 Neyemi Neyemi 8 →

1Tango misala ya kotonga mir esilaki mpe natiaki bizipelo ya bikuke, batiaki bakengeli bikuke, bayembi mpe Balevi : bato na bato na mosala na bango.

2Napesaki mokumba ya kokamba engumba Yelusalemi epai ya Anani, ndeko na ngai ya mobali, mpe epai ya Anania, moyangeli ya engumba batonga makasi, oyo, koleka bato ebele, azalaki moto ya sembo mpe azalaki kotosa Nzambe.

3Nalobaki na bango :

4Nzokande, etando ya engumba Yelusalemi ezalaki monene mpe ekenda mosika makasi, kasi bato kati na yango bazalaki moke mpe bandako etongamaki nanu te.

5Nzambe na ngai apesaki ngai makanisi ya kosangisa bankumu, bakambi mpe bato mosusu mpo na kotanga motango na bango kolanda mabota na bango. Bongo, namonaki buku ya bokoko ya ba-oyo bazongaki bato ya liboso longwa na bowumbu. Tala makomi oyo namonaki kuna :

6Tala bato ya etuka ya Yuda, oyo Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, amemaki na bowumbu ; mpe wuta na bowumbu, bazongaki na Yelusalemi mpe na Yuda, moto na moto na engumba na ye ;

7bazongaki nzela moko na Zorobabeli, Jozue, Neyemi, Azaria, Raamia, Naamani, Maridoshe, Bilishani, Misipereti, Bigivayi, Neumi mpe Baana.

8Bakitani ya Pareoshi :

9Bakitani ya Shefatia :

10Bakitani ya Ara :

11Bakitani ya Paati-Moabi na nzela ya Jozue mpe Joabi :

12Bakitani ya Elami :

13Bakitani ya Zatu :

14Bakitani ya Zakayi :

15Bakitani ya Binuwi :

16Bakitani ya Bebayi :

17Bakitani ya Azigadi :

18Bakitani ya Adonikami :

19Bakitani ya Bigivayi :

20Bakitani ya Adini :

21Bakitani ya Ateri na nzela ya Ezekiasi :

22Bakitani ya Ashumi :

23Bakitani ya Betsayi :

24Bakitani ya Arifi :

25Bakitani ya mboka Gabaoni :

26Bato ya bamboka Beteleemi mpe Netofa :

27Bato ya mboka Anatoti :

28Bato ya mboka Beti-Azimaveti :

29Bato ya bamboka Kiriati-Yearimi, Kefira mpe Beyeroti :

30Bato ya bamboka Rama mpe Geba :

31Bato ya mboka Mikimasi :

32Bato ya bamboka Beteli mpe Ayi :

33Bato ya mboka Nebo mosusu :

34Bato ya mboka ya Elami mosusu :

35Bato ya mboka Arimi :

36Bakitani ya mboka Jeriko :

37Bato ya bamboka Lodi, Adidi mpe Ono :

38Bakitani ya engumba Sena :

39Tala motango ya Banganga-Nzambe :

40Bakitani ya Imeri :

41Bakitani ya Pashuri :

42Bakitani ya Arimi :

43Tala motango ya Balevi :

44Tala motango ya bayembi :

45Tala motango ya bakengeli bikuke :

46Basali ya Tempelo :

47Kerosi, Siya, Padoni,

48Lebana, Agaba, Shalimayi,

49Anani, Gideli, Gaari,

50Reaya, Retsini, Nekoda,

51Gazami, Uza, Paseya,

52Besayi, Mewunimi, Nefusimi,

53Bakibuki, Akufa, Aruri,

54Batsiliti, Meyida, Arisha,

55Barikosi, Sisera, Tama,

56Netsia mpe Atifa.

57Tala bakitani ya basali ya Salomo :

58Yala, Darikoni, Gideli,

59Shefatia, Atili, Pokereti-Atsebayimi mpe Amoni.

60Motango ya basali ya Tempelo mpe ya bakitani ya basali ya Salomo : nkama misato na tuku libwa na mibale.

61Tala molongo ya bato oyo bawutaki na bowumbu, na bingumba Teli-Mela, Teli-Arisha, Kerubi-Adoni mpe Imeri, kasi balongaki te kolakisa ete mabota na bango ya botata ewuta na Isalaele :

62Bakitani ya Delaya, Tobiya mpe Nekoda :

63Mpe kati na Banganga-Nzambe :

64Balukaki mikanda oyo bakoma bakombo ya bakoko na bango, kasi batikalaki komona yango te. Boye balongolaki bango na mosala ya bonganga-Nzambe, pamba te bazalaki mbindo.

65Moyangeli apekisaki bango kolia bilei ya bule kino tango Nganga-Nzambe moko akotuna toli ya Yawe na tina na bango na nzela ya Urimi mpe Tumimi.

66Motango ya lisanga mobimba ya bato oyo bawutaki na bowumbu ezalaki nkoto tuku minei na mibale na nkama misato na tuku motoba,

67bakisa bawumbu na bango ya mibali mpe ya basi nkoto sambo na nkama misato na tuku misato na sambo ; bazalaki mpe na bayembi ya basi mpe ya mibali nkama mibale na tuku minei na mitano, bampunda nkama sambo na tuku misato na motoba, bamile nkama mibale na tuku minei na mitano,

68bashamo nkama minei na tuku misato na mitano mpe ba-ane nkoto motoba na nkama sambo na tuku mibale.

69Bakambi mingi ya mabota bapesaki makabo oyo bakataki kopesa wuta na mitema na bango moko, mpo na misala ya kotonga Tempelo. Moyangeli apesaki na libenga ya misala mbongo ya bibende ya wolo nkoto moko, bakopo tuku mitano mpe banzambala nkama mitano na tuku misato ya mosala ya bonganga-Nzambe.

70Bakambi mosusu ya mabota bapesaki na libenga ya misala mbongo ya bibende ya wolo nkoto tuku mibale mpe mbongo ya bibende ya palata nkoto mibale na nkama mibale na tuku mibale.

71Batikali kati na bato bapesaki mbongo ya bibende ya wolo nkoto tuku mibale, mbongo ya bibende ya palata nkoto mibale mpe banzambala tuku motoba na sambo ya mosala ya bonganga-Nzambe.

72Banganga-Nzambe, Balevi, bakengeli bikuke, bayembi, basali ya Tempelo, ndambo kati na bato mpe bato nyonso ya Isalaele bavandaki kati na bingumba na bango moko.

← Neyemi 6 Neyemi Neyemi 8 →